Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 11:15 - Mokanda na Bomoi

15 Nganga-Nzambe Yeoyada apesaki mitindo epai ya bakonzi ya mampinga, oyo bakambaka basoda nkama moko : « Bobimisa ye na molongo ! Mpe boboma na mopanga moto nyonso oyo akolanda ye ! » Pamba te Nganga-Nzambe alobaki : « Boboma ye te kati na Tempelo ya Yawe ! »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 11:15
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Atalaki mpe amonaki mokonzi atelemi na etemelo ya kolobela, ndenge ezalaki momesano. Bakonzi ya basoda mpe bato oyo babetaka bakelelo bazalaki pembeni ya mokonzi ; bato nyonso ya mokili bazalaki kosepela wana bazalaki kobeta bakelelo. Atali apasolaki bilamba na ye mpe agangaki : « Basaleli ngai likita ! Basaleli ngai likita ! »


Boye, wana Atali azwaki nzela ya ekotelo ya bampunda mpo na kokende na ndako ya mokonzi, bakangaki ye mpe babomaki ye kuna.


Na mobu ya sambo, Yeoyada abengisaki bakonzi ya mampinga, oyo bakambaka basoda nkama moko ya bato ya Kari mpe bakengeli. Abengisaki bango epai na ye kati na Tempelo ya Yawe, asalaki boyokani elongo na bango, alapisaki bango ndayi kati na Tempelo ya Yawe mpe alakisaki bango mwana mobali ya mokonzi.


Nganga-Nzambe Yeoyada abengisaki bakonzi ya mampinga, oyo bakambaka basoda nkama moko mpe alobaki na bango : — Bobimisa ye na molongo ! Mpe boboma na mopanga moto nyonso oyo akolanda ye ! Pamba te Nganga-Nzambe alobaki : « Boboma ye te kati na Tempelo ya Yawe ! »


Nganga-Nzambe Yeoyada apesaki na bakonzi ya mampinga, oyo bakambaka basoda nkama moko makonga, banguba minene mpe banguba mike ya mokonzi Davidi, oyo ezalaki kati na Tempelo ya Nzambe.


Kasi soki moto akaneli moninga na ye mpe aluki koboma ye na mayele mabe, okomema ye mosika ya etumbelo na Ngai mpo na koboma ye.


« Mwana na moto, sakola. Loba : Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Mopanga, mopanga ! Bangalisi mpe bapelisi yango !


Alobaki na bango : « Bokomisa Tempelo mbindo mpe botondisa mapango na yango na bibembe. Bokende ! » Babimaki mpe bakendeki koboma bato kati na engumba.


Mobulu makasi ekotaki kati na engumba mobimba, mpe ebele ya bato oyo bawutaki bipai na bipai bayaki na lombangu. Bakangaki Polo, babimisaki ye libanda ya Tempelo mpe, mbala moko, bakangaki bikuke na yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ