Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 11:12 - Mokanda na Bomoi

12 Nganga-Nzambe Yeoyada abimisaki mwana mobali ya mokonzi, alatisaki ye motole mpe apesaki ye mokanda ya boyokani. Bakomisaki ye mokonzi mpe bapakolaki ye mafuta ya bokonzi. Bato babetaki maboko mpe bagangaki : « Tika ete mokonzi awumela na bomoi ! »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 11:12
45 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye napusanaki pene na ye mpe nabomaki ye, pamba te nayebaki ete akobika te na kotala ndenge babetaki ye. Sima, nazwaki ekoti na ye ya bokonzi, oyo azalaki na yango na moto mpe singa oyo alataki na loboko na ye, mpe namemi yango epai na yo, nkolo na ngai.


Alongolaki motole oyo ezalaki na moto ya mokonzi na yango. Motole yango esalemaki na bakilo ya wolo koleka tuku misato mpe ezalaki na libanga ya talo na likolo na yango. Wuta na tango wana, ekomaki na moto ya Davidi. Akamataki bomengo ebele ya bitumba kati na engumba yango.


Ushayi, moto ya Ariki, moninga ya Davidi, akendeki epai ya Abisalomi mpe alobaki na ye : — Tika ete mokonzi owumela na bomoi ! Tika ete mokonzi owumela na bomoi !


Bongo bato ya Yuda bayaki na Ebron mpe bapakolaki kuna Davidi mafuta mpo ete akoma mokonzi ya libota ya Yuda. Bayebisaki Davidi ete ezali bato ya Yabeshi ya Galadi nde bakundi Saulo.


Sik’oyo, bozala makasi mpe boyika mpiko, pamba te nkolo na bino, Saulo, akufi. Kasi boyeba mpe ete bato ya Yuda bapakoli ngai mafuta mpo ete nakoma mokonzi na bango. »


Boye bampaka nyonso ya Isalaele bayaki na Ebron epai ya mokonzi. Mokonzi Davidi asalaki elongo na bango boyokani, na Ebron, liboso ya Yawe ; mpe bapakolaki Davidi mafuta mpo ete akoma mokonzi ya Isalaele.


Na mokolo ya lelo, akei kobonza bambeka ebele ya bangombe, ya bana ngombe ya mafuta mpe ya bameme ; abengisi bana mibali nyonso ya mokonzi, bakonzi ya mampinga mpe Nganga-Nzambe Abiatari ; bazali kolia mpe komela elongo na ye mpe bazali koloba : « Tika ete mokonzi Adoniya awumela na bomoi ! »


Kuna, Nganga-Nzambe Tsadoki mpe mosakoli Natan bakopakola ye mafuta mpo ete akoma mokonzi ya Isalaele. Bokobeta kelelo mpe boganga : « Tika ete mokonzi Salomo awumela seko na bomoi ! »


Nganga-Nzambe Tsadoki azwaki liseke ya mafuta, kati na ndako ya kapo ya bule, mpe apakolaki Salomo mafuta. Bongo, babetaki kelelo, mpe bato nyonso bagangaki : « Tika ete mokonzi Salomo awumela seko na bomoi ! »


Mokonzi alobaki lisusu na Shimei : — Oyebi lisusu mabe nyonso oyo osalaki epai ya Davidi, tata na ngai ! Boye, Yawe akomemisa yo ngambo ya mabe oyo yo moko osali.


Bakengeli bazingelaki mokonzi, moko na moko na ebundeli na ye na loboko, pembeni ya etumbelo mpe ya Tempelo, wuta na ngambo ya sude kino na ngambo ya nor ya Tempelo.


Kasi Yeosheba, mwana mwasi ya mokonzi Yorami mpe ndeko ya Akazia, azwaki Joasi, mwana mobali ya Akazia ; alongolaki ye na mayele kati na bana mibali ya mokonzi, oyo basengeli koboma mpe atiaki ye mpe ndesi na ye kati na shambre epai wapi batiaka bambeto, mpo na kobomba ye mosika ya miso ya Atali ; mpe Atali abomaki Joasi te.


Na mobu ya sambo, Yeoyada abengisaki bakonzi ya mampinga, oyo bakambaka basoda nkama moko ya bato ya Kari mpe bakengeli. Abengisaki bango epai na ye kati na Tempelo ya Yawe, asalaki boyokani elongo na bango, alapisaki bango ndayi kati na Tempelo ya Yawe mpe alakisaki bango mwana mobali ya mokonzi.


Tango kaka bayokaki bongo, bakonzi ya basoda bakamataki na lombangu bakazaka na bango mpe batandaki yango liboso ya Jewu, na binyatelo ya ematelo. Bongo babetaki kelelo mpe bagangaki : « Jewu azali mokonzi ! »


Bongo okozwa molangi, okosopa mafuta na moto na ye mpe okoloba : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi : Napakoli yo mafuta oyo mpo ete okoma mokonzi ya Isalaele. › Sima, okofungola ekuke mpe okokima ; kozela te ! »


Babimisaki mwana mobali ya mokonzi, balatisaki ye motole, bapesaki ye mokanda ya boyokani mpe bakomisaki ye mokonzi. Yeoyada mpe bana na ye ya mibali bapakolaki ye mafuta ya bokonzi mpe bagangaki : « Tika ete mokonzi awumela na bomoi ! »


Mokonzi alingaki Ester makasi koleka basi nyonso. Ester azwaki ngolu mpe andimamaki na miso ya mokonzi koleka bilenge basi mosusu. Bongo mokonzi atiaki motole ya bokonzi na moto ya Ester mpe akomisaki ye mwasi ya mokonzi na esika ya Vasti.


tika ete bamema nzambala ya bokonzi oyo mokonzi alataka elongo na mpunda oyo mokonzi amataka mpe batia motole ya bokonzi na moto ya mpunda yango.


Nakoyokisa banguna na ye soni, mpe motole na ye ekongenga na mbunzu na ye. »


Okokisi posa ya motema na ye mpe opimeli ye te oyo azalaki kosenga Yo.


Oyei epai na ye na mapamboli ya motuya. Na moto na ye, olatisi ye motole ya wolo oyo basangisa na eloko mosusu.


Nzembo ya bana ya Kore. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi.


Apesaki malako mpo na bolamu ya Jakobi, atiaki mibeko kati na Isalaele, apesaki mitindo epai ya batata na biso ete bateya yango epai ya bana mibali na bango,


Nzokande, obwakaki, omonaki pamba, osilikelaki mopakolami na Yo !


Tika ete bibale ebeta maboko mpe bangomba nyonso eganga na esengo


Okotia kati na sanduku bitando ya mabanga ya mibeko, oyo nakopesa yo.


Tango Yawe asilisaki kosolola na Moyize, na ngomba Sinai, Yawe apesaki ye bitando mibale ya mabanga ya litatoli oyo Nzambe akomaki na mosapi na Ye.


Bokobima na esengo, mpe bakotambolisa bino na kimia ; bangomba milayi mpe bangomba mikuse ekoyemba nzembo ya elonga liboso na bino, mpe banzete nyonso ya zamba ekobeta maboko.


Bomba lisakoli oyo ete eyebana te, kangisa mobeko oyo kati na bayekoli na ngai.


Na mobeko mpe na lisakoli ! Soki bakoloba bongo te, bakomona tongo te.


Mopakolami na Yawe, oyo totielaki motema akangami na mitambo na bango ; nzokande tozalaki kokanisa boye na tina na ye : « Tokobika bomoi malamu na se ya bobatelami na ye kati na bikolo. »


Balobaki na mokonzi Nabukodonozori : — Oh mokonzi, tika ete owumela na bomoi seko na seko !


Tango akomaki pene ya libulu yango, abengaki Daniele na mongongo ya mawa : — Daniele, mosali na Nzambe na bomoi ! Boni, Nzambe na yo, oyo osalelaka na molende, alongi kokangola yo na minoko ya bankosi ?


Bato oyo bazalaki kotambola liboso ya Yesu mpe ba-oyo bazalaki kolanda sima bazalaki koganga : « Ozana na Mwana na Davidi ! Tika ete apambolama, Ye oyo ayei na Kombo ya Nkolo ! Ozana na bisika oyo eleki Likolo ! »


balatisaki Ye ekoti ya nzube na moto mpe basimbisaki Ye lingenda moke na loboko na Ye ya mobali ; bongo babandaki kofukama liboso na Ye mpo na kotiola Ye, na koloba : « Mbote, mokonzi ya Bayuda ! »


Pamba te, Erode mpe Ponse Pilato basanganaki penza kati na engumba oyo, elongo na bato ya bikolo mosusu mpe bana ya Isalaele, mpo na kosalela Yesu likita, Mosali na Yo, Mosantu, oyo obulisa.


Nzokande, ezali Nzambe nde alendisaka biso mpe bino kati na Klisto ; mpe lokola abulisaki biso na nzela ya epakolami na Ye,


Olingaka bosembo mpe oyinaka mabe ; yango wana, oh Nzambe, Nzambe na Yo apakoli Yo mafuta ya esengo, asepeli na Yo koleka baninga na Yo ! »


Kasi tala makambo oyo tozali komona : Yesu oyo akitisamaki na se ya ba-anjelu mpo na mwa tango moke, alati sik’oyo motole ya nkembo mpe ya lokumu mpo ete andimaki pasi oyo ememaki Ye kino na kufa. Na bongo, na ngolu ya Nzambe, Yesu akufaki nde mpo na bato nyonso.


Miso na Ye ezali lokola moto oyo ezali kopela ; mpe na moto na Ye, ezali na mitole ebele. Bakoma kombo moko na nzoto na Ye, kombo oyo Ye moko kaka nde ayebi.


Bongo Samuele azwaki molangi ya mafuta, asopaki yango na moto ya Saulo, ayambaki ye mpe alobaki : « Boni, Yawe apakoli yo mafuta te mpo ete ozala mokambi ya libula na Ye ?


Bongo Samuele alobaki na bato nyonso : — Botala moto oyo Yawe aponi ! Kati na bato nyonso, moko te akokani na ye. Bato bazongisaki na koganga : — Tika ete mokonzi awumela na bomoi !


Boye Samuele azwaki liseke ya mafuta mpe apakolaki ye na miso ya bandeko na ye ya mibali. Banda mokolo wana, Molimo na Yawe akitelaki Davidi na nguya. Mpe Samuele azongaki na Rama.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ