2 Bakonzi 10:5 - Mokanda na Bomoi5 Boye, mobateli biloko ya ndako ya mokonzi, moyangeli ya engumba, bampaka mpe babateli ya bana ya mokonzi batindaki sango oyo epai ya Jewu : « Tozali basali na yo mpe tokosala nyonso oyo okoloba. Tokotia moto mosusu te lokola mokonzi, tokosala nyonso oyo okomona malamu. » အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Boye, Jewu akomelaki bango mokanda ya mibale oyo kati na yango alobaki : « Soki bozali na ngambo na ngai mpe bokotosa ngai, bozwa mito ya bana mibali nyonso ya mokonzi na bino mpe boya na yango epai na ngai, na Jizireyeli, lobi na tongo. » Nzokande bana mibali tuku sambo ya mokonzi bazalaki epai ya bato ya lokumu ya engumba, oyo bazalaki kobokola bango.