36 Jewu akonzaki Isalaele, na Samari mibu tuku mibale na mwambe.
Jewu akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye na Samari. Bongo Yoakazi, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
Tango Atali, mama ya Akazia, amonaki ete mwana na ye ya mobali akufi, abomisaki libota mobimba ya mokonzi.