2 Bakonzi 10:33 - Mokanda na Bomoi33 na este ya Yordani, na etuka nyonso ya Galadi (mabele ya libota ya Gadi, ya Ribeni mpe ya Manase), longwa na Aroeri oyo ezali pembeni ya moluka ya Arinoni kino na Galadi mpe Bashani. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Azaeli atunaki : — Mpo na nini nkolo na ngai azali kolela ? Elize azongisaki : — Mpo ete nayebi mabe oyo okosala bana ya Isalaele. Okozikisa bingumba na bango, oyo etongama makasi, okokata bilenge mibali na bango bakingo na mopanga, okoboma bana na bango ya mike, mpe okopasola mabumu ya basi na bango ya zemi.