28 Ezali bongo nde Jewu asukisaki losambo ya Bala kati na Isalaele.
Babukaki libanga yango ya bule, bakweyisaki ndako ya nzambe Bala mpe bakomisaki yango zongo kino na mokolo ya lelo.
Kasi Jewu atikaki te masumu ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, oyo, na nzela na yango, akweyisaki Isalaele na lisumu. Lisumu yango ezali : kosambela bikeko ya bangombe ya wolo, na Beteli mpe na Dani.
Nakosukisa bisengo na ye nyonso : bafeti na ye ya mobu na mobu mpe ya ebandeli ya sanza, mikolo na ye ya Saba mpe bafeti nyonso oyo ekatama.