Sik’oyo bengisa bato ya Isalaele nyonso ete tokutana na ngomba Karimeli elongo na basakoli ya Bala nkama minei na tuku mitano mpe basakoli ya Ashera nkama minei oyo baliaka na mesa ya Jezabeli.
Eliya apesaki bango mitindo : — Bokanga basakoli ya Bala, botika ata moto moko te kokima. Bakangaki bango, mpe Eliya amemaki bango na lubwaku ya Kishoni mpo na kokata bango bakingo kuna.
Batikaki mitindo nyonso ya Yawe, Nzambe na bango, mpe bamisalelaki banzambe ya bikeko ya bana ngombe mibale basala na bibende oyo banyangwisa na moto, mpe likonzi ya nzambe mwasi Ashera. Bango nyonso bagumbamelaki mampinga nyonso ya likolo, mpe basambelaki nzambe Bala.
Mpe mpo na nini toloba te : « Tika ete tosala mabe mpo ete bolamu ebima kati na mabe » ndenge bato oyo batongaka biso bakosaka ete toteyaka bongo. Bato wana basengeli kozwa etumbu oyo ekoki na mabe na bango.
Bandeko, mpo na kosukisa, tika ete makambo nyonso oyo ezali ya solo, kitoko, sembo, peto, makambo oyo bato bakoki kolinga, kosepela na yango, kolula mpe kokumisa ezala tina ya makanisi na bino.