17 Tango Jewu akomaki na Samari, abomaki bato nyonso ya libota ya Akabi, oyo batikalaki kuna. Jewu abomaki bango kolanda Liloba na Yawe oyo alobaki na nzela ya Eliya.
Boye, tala makambo oyo Yawe alobi : « Nakotindela yo pasi ya makasi. Nakokombola bakitani na yo mpe nakolongola epai ya Akabi mwana mobali nyonso ya libota na yo : azala mowumbu to monsomi kati na Isalaele.
Mokonzi Akazia akufaki kolanda liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Eliya. Lokola mokonzi Akazia azalaki na mwana te, ndeko na ye ya mobali Yorami akitanaki na ye na bokonzi na tango Yorami, mwana mobali ya Jozafati, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu mibale na bokonzi.
Tango Jewu azalaki kokokisa etumbu kati na libota ya Akabi, akutaki bakambi ya Yuda mpe bana mibali ya bandeko mibali ya Akazia, oyo bazalaki kosalela tata leki na bango Akazia, mpe abomaki bango.