2 Bakonzi 10:15 - Mokanda na Bomoi15 Tango alongwaki kuna mpe akutanaki na Yonadabi, mwana mobali ya Rekabi, oyo abandaki koya kokutana na ye, Jewu apesaki ye mbote mpe alobaki : — Boni, motema na yo ezali sembo mpo na ngai, ndenge motema na ngai ezali mpo na yo ? Yonadabi azongisaki : — Iyo, ezali bongo ! Jewu alobaki : — Soki ezali bongo, pesa ngai loboko na yo. Boye, Yonadabi asalaki bongo, mpe Jewu asungaki ye mpo na komata na shar. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Bantoma ya Beni-Adadi bazwaki eyano yango lokola elembo ya malamu, bakangamaki na maloba wana mpe bagangaki na esengo : — Beni-Adadi azali solo ndeko na yo. Akabi azongisaki : — Bokende kozwa ye. Beni-Adadi abimaki na esika oyo abombamaki mpe ayaki epai ya Akabi, bongo Akabi amatisaki ye na shar na ye.