Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 10:13 - Mokanda na Bomoi

13 Jewu akutanaki na bandeko ya Akazia, mokonzi ya kala ya Yuda, mpe atunaki bango : — Bozali banani ? Bazongisaki : — Tozali bandeko ya Akazia. Toyei kopesa bana mibali ya mokonzi mpe mama ya mokonzi mbote.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 10:13
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Jewu atelemaki mpe akendeki na Samari. Na Beti-Ekedi-Aron,


Jewu apesaki mitindo : — Bokanga bango ya bomoi. Boye bakangaki bango ya bomoi mpe bakataki bango bakingo, pene ya libulu ya Beti-Ekedi. Bazalaki mibali tuku minei na mibale, mpe Jewu atikaki moto moko te na bomoi.


Yorami akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye kati na engumba ya Davidi. Akazia, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.


Boye, mokonzi Yorami azongaki na Jizireyeli mpo na kokawusa bapota oyo bato ya Arami bazokisaki ye na Rama, na bitumba oyo babundaki na Azaeli, mokonzi ya Siri. Akazia, mwana mobali ya Yorami, mokonzi ya Yuda, akendeki na Jizireyeli mpo na kotala Yorami, mwana mobali ya Akabi, pamba te bazokisaki ye.


Babundisaki Yuda, bakotaki kati na yango na makasi mpe bamemaki biloko nyonso oyo bamonaki kati na ndako ya mokonzi elongo na bana na ye ya mibali mpe basi na ye ; mwana mobali moko kaka atikalaki : Yoakazi, mwana na ye ya suka.


bato tuku mwambe bawutaki na Sishemi, na Silo mpe na Samari ; bazalaki na mandefu bakata, bilamba epasuka-pasuka, mpe bamizokisaki-zokisaki bapota na banzoto. Bamemaki makabo ya bagato mpe malasi ya ansa mpo na kobonza yango kati na Tempelo ya Yawe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ