Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 1:9 - Mokanda na Bomoi

9 Mbala moko, mokonzi atindaki mokonzi ya basoda tuku mitano epai ya Eliya elongo na basoda na ye tuku mitano. Mokonzi ya basoda tuku mitano akendeki epai ya Eliya oyo azalaki kovanda na songe ya ngomba mpe alobaki na ye : — Moto na Nzambe, mokonzi apesi mitindo ete okende epai na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 1:9
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mwasi yango alobaki na Eliya : — Moto na Nzambe, nasali yo nini ? Boni, oyaki na ndako na ngai mpo na kokundola lisumu na ngai mpe kobomisa mwana na ngai ya mobali ?


Solo, na Kombo na Yawe, Nzambe na yo, ezali na ekolo moko te to mokili moko te epai wapi nkolo na ngai azangi kotinda bato koluka yo. Mpe soki ekolo moko to mokili elobi ete ozalaki kuna te, Akabi azalaki kolapisa bango ndayi ete bamoni yo te.


Wana Jezabeli azalaki koboma basakoli ya Yawe, Abidiasi azwaki basakoli nkama moko mpe abombaki bango kati na madusu mibale ya mabanga : basakoli tuku mitano na lidusu moko na moko, mpe azalaki kopesa bango bilei mpe mayi.


Boye, Akabi akendeki kolia mpe komela. Kasi Eliya amataki kino na songe ya ngomba Karimeli, afukamaki elongi kino na se, na kati-kati ya mabolongo.


Boye Jezabeli atindaki ntoma epai ya Eliya mpo na koyebisa ye : — Tika ete banzambe bapesa ngai etumbu ya makasi koleka soki lobi, kaka na ngonga oyo, nakomisi bomoi na yo te ndenge okomisaki bomoi ya moko na moko kati na bango.


Mokonzi ya Isalaele azongiselaki Jozafati : — Ezali lisusu na moto moko oyo na nzela na ye tokoki kotuna toli ya Yawe, kasi ngai nalingaka ye te ; pamba te asakolaka makambo ya malamu te mpo na bomoi na ngai, asakolaka kaka makambo ya mabe. Ezali Mishe, mwana mobali ya Yimila. Jozafati alobaki : — Tika ete mokonzi aloba bongo te !


Longwa wana Elize akendeki na ngomba Karimeli ; mpe longwa kuna, azongaki na Samari.


Boye, akendeki mpe akomaki na ngomba Karimeli epai wapi moto na Nzambe azalaki kovanda. Tango Elize amonaki ye na mosika, alobaki na mosali na ye, Geazi : — Tala ! Ezali mwasi ya Sunami !


Namemaki bango na Tempelo ya Yawe, kati na shambre ya bana mibali ya Anani, mwana mobali ya Yigidalia, moto na Nzambe, pene ya shambre ya bakambi. Shambre yango ezalaki na sima ya shambre ya Maaseya, mwana mobali ya Shalumi, mokengeli ekuke.


Amatsia alobaki na Amosi : — Yo, momoni makambo, bima na mokili na biso ! Zonga na mokili ya Yuda. Kuna, okosala mbongo na masakoli na yo.


Nzokande, Erode amipeselaki mitindo ete bazwa Yoane, bakanga ye minyololo mpe babwaka ye kati na boloko, likolo ya Erodiade, mwasi ya Filipo, ndeko mobali ya Erode ;


mpe balobaki : — Klisto, sakola kati na biso ; yebisa biso moto oyo abeti yo !


balatisaki Ye ekoti ya nzube na moto mpe basimbisaki Ye lingenda moke na loboko na Ye ya mobali ; bongo babandaki kofukama liboso na Ye mpo na kotiola Ye, na koloba : « Mbote, mokonzi ya Bayuda ! »


Baleki nzela bazalaki kofinga Ye na koningisa mito na bango ; bazalaki koloba : — Yo oyo okobuka Tempelo mpe okotonga yango lisusu na mikolo misato,


Tika ete Klisto, Mokonzi ya Isalaele, akita sik’oyo longwa na ekulusu, mpo ete tomona mpe tondima ! Bato oyo babakamaki elongo na Yesu na ba-ekulusu bazalaki mpe kofinga Ye.


Tango bayekoli, Jake mpe Yoane, bamonaki bongo, balobaki : — Nkolo, olingi ete tobelela moto ete ekitela bango kowuta na likolo mpo na kobebisa bango ?


Bamosusu batiolamaki, babetamaki fimbu, batiamaki minyololo mpe babwakamaki na boloko ;


Sango ekomaki epai ya Saulo, mpe ye atindaki bato mosusu ; kasi bango mpe basakolaki. Saulo atindaki bato mosusu na mbala ya misato, kasi bango mpe basakolaki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ