kaka na tango wana, Yawe alobaki maloba oyo na nzela ya Ezayi, mwana mobali ya Amotsi : « Kende, longola bilamba ya saki na nzoto na yo, mpe basapato na makolo na yo. » Mpe asalaki kaka bongo ; akomaki kotambola bolumbu mpe makolo ngulu.
Na mokolo wana, mosakoli moko na moko akozala na soni mpo na kosakola mpe koloba bimoniseli na ye ; akokosa lisusu bato te na kolataka bilamba ya basakoli, oyo basala na bapwale.
Soki mwa nzete yango te, bokendeki penza kotala nini ? Moto moko alati bilamba ya kitoko ? Te ! Bato oyo balataka bilamba ya kitoko bavandaka na bandako ya bakonzi.
Yoane azalaki kolata elamba oyo basala na bapwale ya shamo mpe mokaba oyo basala na poso ya nyama, na loketo ; azalaki kolia mankoko mpe mafuta ya nzoyi.
mpe akotambola liboso ya Nzambe, elongo na molimo mpe nguya oyo ezalaki kovanda kati na Eliya, mpo na kozongisa boyokani kati na batata mpe bana na bango, mpo na kosala ete batomboki bakoma kokanisa lokola bato ya sembo, mpe mpo na kobongisa bato mpo na Nkolo.