Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 1:3 - Mokanda na Bomoi

3 Kasi anjelu ya Yawe alobaki na Eliya, moto ya mboka Tishibe : — Kende kokutana na bantoma ya mokonzi ya Samari mpe tuna bango : « Boni, Nzambe azali te kati na Isalaele mpo ete bokende kotuna epai ya Bala-Zebubi, nzambe ya Ekroni ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 1:3
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nakosala bongo, pamba te basundolaki Ngai mpe bagumbamelaki Asitarite, nzambe mwasi ya bato ya Sidoni ; Kemoshi, nzambe ya bato ya Moabi ; mpe Moloki, nzambe ya bato ya Amoni, batambolaki te na banzela na Ngai mpo na kosala makambo ya sembo na miso na Ngai, kobatela malako mpe mibeko na Ngai, ndenge Davidi, tata ya Salomo, asalaki.


Eliya, moto ya Tishibe, moko kati na bavandi ya Galadi, alobaki na mokonzi Akabi : — Solo, na Kombo na Yawe, Nzambe ya Isalaele, Nzambe oyo ngai nasalelaka, mamwe mpe mvula ekozala te na mibu oyo ezali koya, longola kaka soki nasengi yango.


Sima na tango molayi, na mobu ya misato, Yawe alobaki na Eliya : « Kende komimonisa epai ya Akabi, mpe Ngai nakonokisa mvula na mokili oyo. »


Na ngonga oyo batumbaka mbeka ya pokwa, mosakoli Eliya apusanaki mpe asambelaki : — Oh Yawe, Nzambe ya Abrayami, ya Izaki mpe ya Isalaele ! Tika bato bayeba lelo ete Yo nde ozali Nzambe ya Isalaele, mpe ngai nazali mosali na Yo ; mpe nasali makambo oyo nyonso na etinda na Yo.


Bongo alalaki na se ya nzete yango mpe azwaki pongi. Mbala moko, anjelu moko asimbaki ye mpe alobaki na ye : — Lamuka mpe lia.


Anjelu ya Yawe azongaki na mbala ya mibale, asimbaki ye lisusu mpe alobaki : — Lamuka mpe lia, pamba te mobembo ezali molayi mingi mpo na yo.


Bongo Yawe alobaki na Eliya, moto ya Tishibe, maloba oyo :


Mokonzi Akazia akweyaki na Samari wuta na lininisa ya shambre na ye ya likolo mpe azokaki pota moko ya makasi. Atindaki bantoma na ye mpe alobaki na bango : — Bokende kotuna epai ya Bala-Zebubi, nzambe ya Ekroni, mpo na koyeba soki nakobika solo na likama oyo.


Bazongisaki : — Moto moko ayaki kokutana na biso mpe alobaki na biso : « Bozonga epai ya mokonzi oyo atindi bino mpe boloba na ye : Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Boni, Nzambe azali lisusu te kati na Isalaele ; yango wana ozali kotinda bato kokende kotuna epai ya Bala-Zebubi, nzambe ya Ekroni ? › Mpo na yango, okokita te na mbeto oyo olali ; okokufa solo. »


Bazongisaki : — Azalaki mobali moko alata bilamba ya poso ya nyama na loketo na ye. Mokonzi alobaki : — Ezalaki kaka Eliya, moto ya Tishibe.


Bongo Namani elongo na basali na ye nyonso bazongaki epai ya moto na Nzambe. Atelemaki liboso ya Elize mpe alobaki : — Nayebi sik’oyo ete ezali na Nzambe te kati na mokili mobimba longola kaka kati na Isalaele. Nabondeli yo, ndima kado kowuta na mosali na yo.


Tango Elize, moto na Nzambe, ayokaki ete mokonzi ya Isalaele apasolaki bilamba na ye, atindelaki ye liloba oyo : « Mpo na nini opasoli bilamba na yo ? Tika ete moto wana aya epai na ngai, mpe akoyeba ete ezali na mosakoli moko kati na Isalaele ! »


Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Ezali ya koyemba na lindanda. Nzembo ya Azafi.


Soki bato balobi na bino : « Bokende kotalisa makambo epai ya bato oyo basololaka na milimo ya bakufi mpe epai ya bato oyo balobaka makambo oyo ekoya, oyo balobaka-lobaka lokola bandeke. Boni, bato baluka banzambe na bango te ? Mpo na nini te babelela bakufi mpo na bato ya bomoi ? »


Wana nakomi pene ya kobungisa elikya, nakanisi Yo, Yawe, mpe libondeli na ngai emati kino epai na Yo, kino na Tempelo na Yo ya bule.


Balakisi ya Mobeko oyo bawutaki na Yelusalemi balobaki : — Azali na molimo ya Belizebule kati na ye mpe azali kobengana milimo mabe na nguya ya mokonzi ya milimo mabe.


Anjelu ya Nkolo alobaki na Filipo : — Telema, kende na sude, na nzela ya esobe, nzela oyo ewuta na Yelusalemi mpe ekenda kino na Gaza.


Na mokolo ya lelo, Yawe akokaba yo na maboko na ngai ; nakoboma yo mpe nakokata moto na yo. Na mokolo ya lelo kaka, nakopesa bibembe ya mampinga ya Filisitia epai ya bandeke ya likolo mpe epai ya banyama ya mokili ; mpe mokili mobimba ekoyeba ete ezali na Nzambe moko kati na Isalaele.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ