Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 1:2 - Mokanda na Bomoi

2 Mokonzi Akazia akweyaki na Samari wuta na lininisa ya shambre na ye ya likolo mpe azokaki pota moko ya makasi. Atindaki bantoma na ye mpe alobaki na bango : — Bokende kotuna epai ya Bala-Zebubi, nzambe ya Ekroni, mpo na koyeba soki nakobika solo na likama oyo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 1:2
25 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nakosala bongo, pamba te basundolaki Ngai mpe bagumbamelaki Asitarite, nzambe mwasi ya bato ya Sidoni ; Kemoshi, nzambe ya bato ya Moabi ; mpe Moloki, nzambe ya bato ya Amoni, batambolaki te na banzela na Ngai mpo na kosala makambo ya sembo na miso na Ngai, kobatela malako mpe mibeko na Ngai, ndenge Davidi, tata ya Salomo, asalaki.


Kamata mapa zomi, ndambo ya bagato, na ekolo ya mafuta ya nzoyi, mpe kende kokutana na ye ; akoyebisa yo makambo oyo ekokomela mwana na biso ya mobali.


Kasi moto moko ya Siri abetaki tolotolo na ye bibetela, mpe mbanzi na yango edusolaki ebombelo ya tolo ya mokonzi ya Isalaele mpe ezwaki ye. Mokonzi alobaki na motambolisi ya shar : « Baluka mpe bimisa ngai libanda ya esika oyo bitumba ezali koleka, pamba te nazoki. »


Akabi akendeki kokutana na bakoko na ye. Mpe Akazia, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.


Alobaki na mokonzi : Tala liloba oyo Yawe alobi : « Boni, Nzambe azali lisusu te na Isalaele mpo ete otinda bato kotuna epai ya Bala-Zebubi, nzambe ya Ekroni ? Lokola osali bongo, okokita lisusu te na mbeto oyo olali, okokufa solo. »


Kasi anjelu ya Yawe alobaki na Eliya, moto ya mboka Tishibe : — Kende kokutana na bantoma ya mokonzi ya Samari mpe tuna bango : « Boni, Nzambe azali te kati na Isalaele mpo ete bokende kotuna epai ya Bala-Zebubi, nzambe ya Ekroni ?


Bazongisaki : — Moto moko ayaki kokutana na biso mpe alobaki na biso : « Bozonga epai ya mokonzi oyo atindi bino mpe boloba na ye : Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Boni, Nzambe azali lisusu te kati na Isalaele ; yango wana ozali kotinda bato kokende kotuna epai ya Bala-Zebubi, nzambe ya Ekroni ? › Mpo na yango, okokita te na mbeto oyo olali ; okokufa solo. »


Batikaki mitindo nyonso ya Yawe, Nzambe na bango, mpe bamisalelaki banzambe ya bikeko ya bana ngombe mibale basala na bibende oyo banyangwisa na moto, mpe likonzi ya nzambe mwasi Ashera. Bango nyonso bagumbamelaki mampinga nyonso ya likolo, mpe basambelaki nzambe Bala.


Boni, pasi ezali mpo na bato mabe te ? Kobebisama ezali mpo na bato oyo basalaka masumu te ?


Molingami na ngai azali lokola mboloko to mwana ya mbuli. Tala ye wana ! Atelemi na sima ya mir na biso, azali kotala na lininisa, azali kotala na mayele na kiyungulu ya lininisa.


Bato ya Ejipito bakosila mayele, mpe nakobebisa mabongisi na bango nyonso ; bakokende kotuna toli epai ya banzambe ya bikeko, epai ya milimo ya bakufi, epai ya bato oyo basololaka na milimo ya bakufi mpe epai ya bato oyo balobaka makambo oyo ekoya.


Solo, osundolaki bato na Yo, libota ya Jakobi, mpo ete batondisami na bizaleli ya soloka oyo ewuti na Este ; bazali kosalela maji lokola bato ya Filisitia, bazali kosala boyokani elongo na bapagano.


Tango batata na ngai babebisaki Gozani, Arani, Retsefi mpe bato ya Edeni oyo bazalaki kovanda kati na Telasari, boni, banzambe ya bikolo yango, bakangolaki yango ?


Bazikisaki banzambe na bango na moto, pamba te banzambe yango ezalaki Nzambe te, kasi banzete to mpe mabanga ya pamba oyo esalemi na maboko ya bato.


Nzokande, ekoki mpo na moyekoli kozala lokola molakisi na ye, mpe mpo na mowumbu kozala lokola nkolo na ye. Soki babengaki Nkolo ndako « Belizebule, » ekozala boni mpo na bavandi ya ndako na Ye ?


Balakisi ya Mobeko oyo bawutaki na Yelusalemi balobaki : — Azali na molimo ya Belizebule kati na ye mpe azali kobengana milimo mabe na nguya ya mokonzi ya milimo mabe.


Kasi bamoko kati na bango balobaki : — Azali kobengana milimo mabe na nguya ya Belizebule, mokonzi ya milimo mabe.


Nzokande, elenge mobali moko avandaki na lininisa ; kombo na ye ezalaki Etikisi. Lokola Polo azalaki kaka kokoba koloba, pongi makasi ekangaki Etikisi, mpe, mbala moko, akweyaki na mabele wuta na etaje ya misato. Tango batombolaki ye, bamonaki ete asili kokufa.


Mondelo yango ekendeki na mopanzi ya ngambo ya nor ya Ekroni, ebalukaki na Shikeroni, elekaki pene ya ngomba Baala ; ekendeki kino na Yabineyeli mpe esukaki na ebale monene.


Boni, okozwa te oyo Kemoshi, nzambe na yo, apesi yo ? Biso tokozwa oyo Yawe, Nzambe na biso, apesi biso.


Mama ya Sisera abandaki kotala na lininisa, na sima ya bibende, mpe abandaki koganga : « Mpo na nini shar na ye ezali kowumela boye ? Mpo na nini bashar na ye ezali koya malembe ? »


Bongo batindaki Sanduku ya Nzambe na Ekroni. Tango Sanduku ya Nzambe ekotaki na Ekroni, bato ya Ekroni bagangaki : — Bamemi Sanduku ya Nzambe ya Isalaele epai na biso mpo ete baboma biso mpe baboma bato na biso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ