Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Akabi, misala na ye, ndako oyo atongisaki na pembe ya nzoko mpe bingumba nyonso oyo alendisaki, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele.
Mokonzi Akazia akufaki kolanda liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Eliya. Lokola mokonzi Akazia azalaki na mwana te, ndeko na ye ya mobali Yorami akitanaki na ye na bokonzi na tango Yorami, mwana mobali ya Jozafati, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu mibale na bokonzi.
Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Joasi mpe misala na ye nyonso, bakisa bitumba oyo abundisaki Amatsia, mokonzi ya Yuda, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele.
Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Joasi, misala na ye mpe elonga na ye tango abundisaki Amatsia, mokonzi ya Yuda, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele.
Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Jeroboami, misala na ye nyonso mpe elonga na ye na bitumba, ezala ndenge azongisaki na se ya bokonzi ya Isalaele Damasi mpe Amati, bingumba mibale oyo ezalaki ya Yuda, nyonso wana ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele.
Pekakia asalaki makambo mabe na miso ya Yawe. Atikaki te masumu ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, masumu oyo na nzela na yango akweyisaki Isalaele.