15 Anjelu ya Yawe alobaki na Eliya : — Kende na ye nzela moko ; kobanga ye te. Bongo Eliya atelemaki mpe akendeki na ye nzela moko kino epai ya mokonzi.
Nayebi ete moto ekitaki wuta na likolo mpe ezikisaki bakonzi nyonso mibale ya basoda elongo na basoda na bango oyo bayaki liboso ; kasi sik’oyo, tika ete bomoi na ngai mpe bomoi ya bato na ngai tuku mitano ezala na motuya na miso na yo !
Kasi anjelu ya Yawe alobaki na Eliya, moto ya mboka Tishibe : — Kende kokutana na bantoma ya mokonzi ya Samari mpe tuna bango : « Boni, Nzambe azali te kati na Isalaele mpo ete bokende kotuna epai ya Bala-Zebubi, nzambe ya Ekroni ?
Mibongisa, yika mpiko ! Telema mpe yebisa bango makambo nyonso oyo Ngai nakotinda yo ; kozala na somo na bango te, noki te nakokweyisa yo liboso na bango.
Nakokomisa yo lokola mir liboso ya bato oyo, mir moko ya makasi penza, mir ya bronze ; bakobundisa yo kasi bakolonga yo te, pamba te nazali elongo na yo mpo na kobikisa mpe kokangola yo, » elobi Yawe.
Bongo yo, mwana na moto, kobanga bango te mpe kobanga maloba na bango te, atako banzube mpe basende ezingeli yo mpe ozali kovanda elongo na koto. Kozala na somo ya makambo oyo bazali koloba te mpe kolenga liboso na bango te atako bazali batomboki.
Mpo na kondima, Moyize abangaki te kanda ya mokonzi mpo na kobima longwa na Ejipito, mpe atikalaki ngwi na mokano na ye lokola nde azali komona Nzambe oyo amonanaka te.