2 Bakonzi 1:12 - Mokanda na Bomoi12 Kasi Eliya azongiselaki mokonzi ya basoda : — Soki solo nazali moto na Nzambe, tika ete moto ekita wuta na likolo mpe ezikisa yo elongo na bato na yo tuku mitano. Mbala moko moto ekitaki wuta na likolo mpe ezikisaki mokonzi ya basoda tuku mitano elongo na basoda na ye. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Mokonzi Akazia atindaki lisusu na mbala ya misato mokonzi mosusu ya basoda tuku mitano elongo na basoda tuku mitano. Mokonzi yango akendeki kofukama liboso ya Eliya mpe abondelaki ye : — Moto na Nzambe, tika ete bomoi na ngai mpe bomoi ya basali na yo, bato tuku mitano oyo, ezala na motuya na miso na yo !