Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakolinto 9:5 - Mokanda na Bomoi

5 Yango wana, namonaki ete ezali malamu kosenga na bandeko yango ete bakoma epai na bino liboso na ngai, mpo na kobongisa makabo oyo bolakaki. Boye ekomizalela tango ngai nakokoma, mpe ekolakisa ete bopesaki yango na esengo mpe na bonsomi, kasi na makasi te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakolinto 9:5
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nabondeli yo penza, ndima makabo oyo namemeli yo ; pamba te Nzambe nde apesaki ngai yango na ngolu na Ye mpe nazali na nyonso. Lokola Jakobi azalaki kaka kotia molende, Ezawu andimaki kozwa yango.


Bongo Namani elongo na basali na ye nyonso bazongaki epai ya moto na Nzambe. Atelemaki liboso ya Elize mpe alobaki : — Nayebi sik’oyo ete ezali na Nzambe te kati na mokili mobimba longola kaka kati na Isalaele. Nabondeli yo, ndima kado kowuta na mosali na yo.


Tika ete moko na moko kati na bino, na mokolo ya liboso ya poso, abomba ndambo ya mbongo kati na ndako na ye, kolanda ezweli na ye, mpo ete bazela te kokoma na ngai mpo na kokongola makabo yango.


Boye, tosengaki na Tito ete akomisa kino na suka mosala yango ya kosunga, ndenge abandaki yango kati na bino.


Kasi nazali kotindela bino bandeko mpo ete, na likambo yango, lolendo na biso na tina na bino emonana te lokola ya pamba, kasi mpo ete bozala penza ya kobongama, ndenge kaka nalobaki yango.


Bokanisaka likambo oyo : Moto oyo alonaka moke abukaka mpe moke, mpe moto oyo alonaka ebele abukaka mpe ebele.


Ezali te ete nazali koluka makabo kowuta epai na bino, kasi nazali koluka ete bambuma ya bolamu na bino efuluka lisusu koleka.


Akisa azongisaki : — Salela ngai ngolu. Lokola opesaki ngai eteni ya mabele kati na Negevi, pesa ngai lisusu bitima. Boye, Kalebi apesaki ye bitima ya likolo mpe ya se.


Mpe tika ete bakado oyo mwasi mosali na yo amemeli nkolo na ngai epesamela mibali oyo bazali kolanda yo.


Tango Davidi akomaki na Tsikilagi, atindaki ndambo ya bomengo ya bitumba epai ya bampaka ya Yuda, oyo bazalaki baninga na ye. Alobaki : « Tala kado mpo na bino kowuta na bomengo ya bitumba ya banguna ya Yawe. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ