3 Kasi nazali kotindela bino bandeko mpo ete, na likambo yango, lolendo na biso na tina na bino emonana te lokola ya pamba, kasi mpo ete bozala penza ya kobongama, ndenge kaka nalobaki yango.
Namikumisaki epai na ye na tina na bino mpe nakoyokela yango soni te, pamba te ndenge kaka makambo nyonso oyo tolobaki na bino ezali ya solo, ndenge mpe kaka lokumu oyo totombolaki na tina na bino epai ya Tito ezali penza ya solo.
Nalobaki na tina na bino na bosembo monene, mpe namikumisaka makasi na tina na bino. Kati na pasi na biso nyonso, nalendisamaki makasi, mpe natondi na esengo.