Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakolinto 9:15 - Mokanda na Bomoi

15 Tika ete matondi epesamela Nzambe mpo na likabo na Ye, oyo bato bakoki kolimbola te !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakolinto 9:15
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boganga : « Oh Nzambe Mobikisi na biso, bikisa biso, sangisa biso mpe kangola biso wuta na maboko ya bokonzi ya bikolo mosusu, mpo ete tosanzola Kombo na Yo ya bule mpe tosepela na mosala ya kokumisa Yo ! »


Bokumisa Yawe, bobelela Kombo na Ye, bopanza sango ya misala minene na Ye kati na bikolo !


Obongoli kolela na ngai, okomisi yango mabina ; olongoli mokumba na ngai mpe olatisi ngai esengo,


Yawe, obimisaki ngai na mboka ya bakufi, obatelaki bomoi na ngai mosika na bato oyo bazali kokita na libulu.


Ye, Yawe, alobi : « Ezali penza likambo moke mpo na yo kozala mosali na Ngai mpo na kotelemisa mabota ya Jakobi mpe kozongisa bana ya Isalaele oyo nabombaki. Mpe lisusu, nakokomisa yo pole mpo na bikolo mosusu mpo ete omema lobiko na Ngai kino na suka ya mokili. »


Bokonzi na ye ekokende mosika penza, mpe kimia na ye ekozala na suka te. Akovanda na kiti ya bokonzi ya Davidi, akozala mokonzi ya mokili na ye, akolendisa mpe akokamba yango na bosembo mpe na boyengebene, wuta na tango oyo kino libela na libela. Yango nde makambo oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, akosala na bolingo makasi na Ye.


« Nkembo na Nzambe kati na bisika oyo eleki likolo, mpe kimia na mabele kati na bato oyo alingaka ! »


Awa ayaki mpe kaka na ngonga wana, abandaki kozongisa matondi epai ya Nzambe mpe koloba na tina na Mwana Yesu, epai ya bato nyonso oyo bazalaki kozela ete Nzambe akangola Yelusalemi.


Lokola atonda na bolingo mpo na biso, apesaki biso ngolu likolo ya ngolu ;


Pamba te Nzambe alingaki mokili mingi penza, yango wana apesaki Mwana na Ye se moko, mpo ete moto nyonso oyo akondima Ye akufa te kasi azwa bomoi ya seko.


Kasi ezali na bokeseni monene kati na likabo ya ofele ya Nzambe mpe lisumu ! Pamba te soki lisumu ya moto moko ememelaki bato ebele kufa, ngolu ya Nzambe mpe likabo ya ofele oyo eyaki na nzela ya ngolu ya moto moko, Yesu-Klisto, efulukaki meke mpo na bato ebele.


Pamba te lifuti ya lisumu ezali kufa, kasi likabo ya ofele ya Nzambe ezali bomoi ya seko kati na Yesu-Klisto, Nkolo na biso.


Ye oyo aboyaki te kopesa Mwana na Ye se moko, kasi akabaki Ye mpo na biso nyonso, ndenge nini azanga kopesa biso biloko nyonso elongo na Ye na nzela ya ngolu ?


Kasi tika ete Nzambe apesamela matondi, pamba te apesaka biso elonga na nzela ya Nkolo na biso, Yesu-Klisto !


Sik’oyo, tika ete matondi ezonga epai na Nzambe oyo, mpo na bomoko na biso na Klisto, atambolisaka biso tango nyonso kati na molongo na Ye ya balongi, mpe azwaka biso lokola bisalelo na Ye mpo na kopanza boyebi ya Klisto, na bisika nyonso, lokola solo kitoko ya malasi.


Boye bokokoma bazwi ya biloko nyonso mpo ete bokoka kokabaka tango nyonso ; bongo bato epai ya banani tokopesa makabo na bino bakozongisa matondi epai ya Nzambe.


Mpe bakosambela mpo na bino, mpo na kolakisa bolingo makasi oyo bazali na yango mpo na bino, likolo ya ngolu monene oyo Nzambe apesa bino.


bozongisaka tango nyonso matondi epai ya Nzambe Tata mpo na makambo nyonso, na Kombo na Yesu-Klisto, Nkolo na biso ;


bolamu nyonso mpe likabo nyonso ya kitoko ewutaka kaka na Likolo, epai ya Tata ya pole, oyo, kati na Ye, molili ezalaka te, mpe abongwanaka te.


Na tango nyonso oyo bikelamu ya bomoi bazalaki kopesa nkembo, lokumu mpe matondi epai na Ye oyo avandi na Kiti ya Bokonzi mpe azali na bomoi seko na seko,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ