Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakolinto 9:14 - Mokanda na Bomoi

14 Mpe bakosambela mpo na bino, mpo na kolakisa bolingo makasi oyo bazali na yango mpo na bino, likolo ya ngolu monene oyo Nzambe apesa bino.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakolinto 9:14
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Basali ya Abisalomi basalaki Aminoni ndenge kaka Abisalomi atindaki bango. Bana mibali nyonso ya mokonzi batelemaki, bamataki na bamile na bango mpe bakimaki.


Moto oyo abombaka ble, bato bakolakela ye mabe ; kasi lipamboli ezali epai na moto oyo akoteka yango.


Nalobi na bino : bosalela bomengo ya mabe mpo na kotonga bondeko na bato mosusu ; mpo ete tango ekosila, bayamba bino kati na bivandelo ya seko.


Pamba te nazali na posa makasi ya komona bino mpo na kopesa bino likabo ya ngolu, likabo ya Molimo, mpo ete bolendisama na kondima na bino


awa bozali kosala elongo na biso na nzela ya mabondeli na bino. Boye, bato ebele bakozongisa matondi epai ya Nzambe na tina na biso mpo na likabo ya ngolu oyo azali kopesa biso lokola eyano na mabondeli ya bato ebele.


Bandeko, tolingi koyebisa bino ndenge nini Nzambe atalisaki ngolu na Ye epai ya Mangomba ya Masedwane.


Mpo ete lotomo yango ekotalisa bosolo ya komipesa na bino, basantu bakokumisa Nzambe mpo na botosi ya kondima na bino kati na Sango Malamu ya Klisto, mpe mpo na esengo oyo mitema na bino ezali na yango mpo na kokabola biloko na bino elongo na bango mpe elongo na bato nyonso.


Tika ete matondi epesamela Nzambe mpo na likabo na Ye, oyo bato bakoki kolimbola te !


Nzambe azali Motatoli na ngai ete nalingaka bino nyonso makasi, na bolingo ya Yesu-Klisto.


Pamba te azali na posa makasi ya komona bino nyonso mpe ayokaki pasi mingi na motema mpo boyokaki ete azali kobela.


Yango wana, bandeko mpe balingami na ngai, bino oyo nazali na posa makasi ya komona lisusu, bino oyo bozali esengo mpe motole na ngai, botikala ngwi kati na Nkolo.


Nkolo na biso atondisaki ngai na ngolu na Ye, elongo na kondima mpe bolingo oyo ezali kati na Yesu-Klisto.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ