Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakolinto 9:10 - Mokanda na Bomoi

10 Mpe Ye oyo apesaka nkona epai ya moloni mpe lipa lokola bilei akopesa lisusu, akofulukisa nkona na bino mpe akokolisa bambuma ya bosembo na bino.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakolinto 9:10
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mpo na nini, biso elongo na mabele na biso, tokufa na miso na yo ? Somba biso kaka elongo na mabele na biso na motuya ya biloko ya kolia ; mpe biso elongo na mabele na biso, tokokoma bawumbu ya Faraon. Toboyi na biso kokufa na nzala, pesa biso milona ya kolona mpo ete tobika mpe mabele na biso ekoma esobe te.


Moto mabe asalaka mosala na lokuta, kasi moto oyo alonaka na bosembo akozwa lifuti ya malonga.


Na tongo, lona milona na yo, mpe na pokwa, kopemisa maboko na yo te, pamba te oyebi te milona nini ekobima, ya tongo to ya pokwa to mpe nyonso mibale ekobima malamu.


Ndenge mvula mpe mvula ya pembe enokaka wuta na likolo mpe ezongaka te na likolo soki epolisi mabele te, soki ebotisi yango bambuma mpe bafololo te, soki epesi nkona te na moloni mpe bilei te na moto oyo aliaka,


Bolona bosembo mpo na bino moko mpe bokobuka mbuma ya bolingo ya solo. Bomikatela bilanga ya sika, pamba te tango ya koluka Yawe ekoki kino tango akoya kosopela bino bosembo.


Bosala keba ete bosalelaka te bosembo na bino liboso ya bato, mpo ete bamona bino ; soki te, bokozanga lifuti oyo Tata na bino ya Likolo abombela bino.


Pamba te lotomo ya makabo na bino ezali kaka te mpo na kokokisa bosenga ya basantu, kasi ezali mpe mpo ete matondi mingi ezonga epai ya Nzambe.


Bokanisaka likambo oyo : Moto oyo alonaka moke abukaka mpe moke, mpe moto oyo alonaka ebele abukaka mpe ebele.


Boni, ezali mpo botosaki Mobeko nde Nzambe apesi bino Molimo na Ye mpe azali kosala bikamwa kati na bino to ezali mpo boyambaki na kondima Sango Malamu oyo boyokaki ?


pamba te mbuma ya pole ezali : boboto, bosembo, mpe bosolo.


bokotonda na mbuma ya bosembo oyo ewutaka na Yesu-Klisto, mpo na nkembo mpe lokumu ya Nzambe.


Ezali te ete nazali koluka makabo kowuta epai na bino, kasi nazali koluka ete bambuma ya bolamu na bino efuluka lisusu koleka.


Tika ete Nkolo abakisa mpe afulukisa bolingo kati na bino mpo ete bolinganaka, bamoko na bamosusu, mpe mpo ete bolingaka bato nyonso, ndenge kaka biso mpe tolingaka bino.


Ezali mpe bolingo yango nde bosengeli kotalisa epai ya bandeko nyonso kati na Masedwane mobimba. Mpe bandeko, tozali kosenga na bino ete bokoba kosalaka bongo koleka,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ