Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakolinto 8:9 - Mokanda na Bomoi

9 Pamba te boyebi ndenge nini Yesu-Klisto, Nkolo na biso, atalisaki ngolu na Ye epai na biso : Ye oyo azalaki mozwi, amikomisaki mobola mpo na bolamu na bino, mpo ete bokoma bazwi na nzela ya bobola na Ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakolinto 8:9
43 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Pamba te akolaki liboso na Ye lokola nzete ya moke, lokola mosisa oyo ebimi na esobe ; azalaki ata na kitoko to lokumu te oyo ekokaki kobenda miso na biso ete etala ye ; lolenge na ye ezalaki ata na eloko moko te oyo ekokaki kosala ete tosepela na ye.


Mpo na likambo ya Siona, nakokanga monoko na Ngai te ; mpo na likambo ya Yelusalemi, nakovanda kimia te, kino bosembo na ye emonana lokola kongenga ya pole, mpe lobiko na ye emonana lokola mwinda.


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Ndenge kaka balobaka soki bamoni liboke ya bambuma kitoko ya vino : ‹ Kobebisa te, pamba te lipamboli moko ezali wana, › ndenge mpe kaka nakosala mpo na basali na Ngai : nakoboma bango nyonso te.


Nzokande, mpo ete totia mobulu te kati na makanisi na bango, kende na ebale, bwaka ndobo na mayi mpe kamata mbisi oyo okozwa ya liboso ; fungola monoko na yango mpe okomona mbongo moko ya bibende kati na yango ; kamata mbongo yango mpe futa mpako na Ngai mpe mpako na yo, na maboko na bango.


Pamba te Mwana na Moto ayaki te mpo ete basalela Ye ; kasi ayaki nde kosala mpo na bato, mpe kopesa bomoi na Ye lokola motuya ya kofuta mpo na kosikola bato ebele.


Kasi Yesu alobaki na ye : — Bambwa ya zamba ezalaka na madusu na yango na se ya mabele mpo na kobombama, mpe bandeke ya likolo ezalaka na bazala na yango ; kasi Mwana na Moto azangi esika ya kolala mpo na kopema.


Ezali ye te mosali mabaya ? Ezali ye te mwana ya Mari mpe ndeko ya Jake, Jozefi, Jide mpe Simona ? Boni, bandeko na ye ya basi bavandaka awa te elongo na biso ? » Yango wana, ezalaki penza libaku mabe mpo na bango kondima Ye.


Boye soki bozali sembo te na bobateli bomengo oyo ezwami na banzela ya lokuta, nani akopesa bino bomengo ya solo ?


Mari abotaki mwana mobali, mwana na ye ya liboso ; alingaki ye na bilamba mpe alalisaki ye kati na elielo ya bibwele, pamba te esika ezalaki te mpo na bango kati na ndako ya bapaya.


Jane, mwasi ya Shuza oyo azalaki kobatela biloko ya Erode ; Suzana ; mpe basi mosusu ebele. Basi yango bazalaki kosalisa mpe kosunga Yesu mpe bayekoli na Ye, na nzela ya biloko na bango moko.


Yesu azongiselaki ye : — Bambwa ya zamba ezalaka na madusu na yango na se ya mabele mpo na kobombama, mpe bandeke ya likolo ezalaka na bazala na yango ; kasi Mwana na Moto azangi esika ya kolala mpo na kopema.


Ye oyo azali Liloba azalaki kati na mokili, pamba te Ye nde akelaki yango, kasi mokili endimaki Ye te.


Ye oyo azalaki Liloba akomaki moto mpe avandaki kati na biso, atonda na ngolu mpe na solo. Tomonaki nkembo na Ye, nkembo oyo azwi epai ya Tata na Ye, lokola Mwana se moko.


pamba te Mibeko eyaki na nzela ya Moyize, kasi ngolu mpe solo eyaki na nzela ya Yesu-Klisto.


Kasi Yesu alobaki na bango : — Mongongo wana eyokani te mpo na Ngai, kasi mpo na bino.


Nyonso oyo ezali ya Tata ezali mpe ya Ngai ; yango wana nalobi ete akozwa makambo kowuta epai na Ngai mpe akoyebisa bino yango.


Namibonzaki mobimba epai na Yo mpo na bango, mpo ete bango mpe babulisama na nzela ya bosolo.


Nzokande, soki mabe na bango epesi mokili bomengo, mpe kobunga na bango epesi Bapagano bomengo, ndenge nini kobongola mitema na bango emema te bomengo oyo eleki ?


Pamba te ezala Klisto, alukaki te komisepelisa Ye moko ; kasi alobaki, kolanda ndenge ekomama, « mafinga ya bato oyo bafingaki yo ekweyaki epai na ngai. »


Kasi tala ndenge nini Nzambe alakisi biso bolingo na Ye : wana tozalaki nanu bato ya masumu, Klisto akufelaki biso.


Ye oyo aboyaki te kopesa Mwana na Ye se moko, kasi akabaki Ye mpo na biso nyonso, ndenge nini azanga kopesa biso biloko nyonso elongo na Ye na nzela ya ngolu ?


Nazongisaka tango nyonso matondi epai ya Nzambe na tina na bino, mpo na ngolu na Ye, oyo epesamela bino kati na Yesu-Klisto ;


Moto ya liboso asalemaki na putulu ya mabele, azali moto ya mabele ; kasi moto ya mibale awutaka na Likolo.


koyebana lokola bato na mawa, nzokande tozalaka na esengo tango nyonso ; koyebana lokola babola, nzokande tokomisaka bato ebele bazwi ; koyebana lokola bato bakelela, nzokande tozali na nyonso.


mpo na kotalisa na bato ya bikeke oyo esengeli koya na sima, bomengo monene ya ngolu na Ye, oyo alakisaki kati na Yesu-Klisto na nzela ya boboto na Ye epai na biso.


mpe mpo ete bozwa nguya ya koyeba bolingo yango ya Klisto, oyo eleki boyebi nyonso, na tina ete botondisama kino na bofuluki nyonso ya Nzambe.


Atako nazali moto ya suka kati na basantu nyonso, kasi Nzambe apesa ngai ngolu ya kosakola epai ya Bapagano bomengo monene ya Klisto ;


Nazali sik’oyo kosepela na pasi oyo nazali komona mpo na bino ; pamba te pasi oyo Klisto atikalaki komona te, ngai nazali kokokisa yango kati na nzoto na ngai mpo na bolamu ya nzoto na Ye, oyo ezali Lingomba.


Pesa bango mitindo ete basalaka bolamu, batonda na misala malamu, bazala na motema ya kokaba mpe bakabelaka bato.


Kasi sik’oyo, na mikolo oyo ezali ya suka, Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Mwana na Ye, oyo Ye moko Nzambe akomisaki Mokitani ya biloko nyonso. Ezali mpe na nzela na Ye nde Nzambe asalaki mokili.


Bandeko na ngai ya bolingo, boyoka : Nzambe apona te bato oyo mokili ezali kobenga babola mpo ete bazala bato ya bomengo kati na kondima mpe bazwa Bokonzi oyo alaka epai ya bato oyo balingaka Ye ?


Nayebi minyoko mpe bobola na yo, nzokande ozali mozwi ; nayebi ndenge nini bato oyo balobaka ete bazali Bayuda, kasi bazali na bango Bayuda te, batiolaka yo ; bazali nde ndako ya mayangani ya Satana.


Yango nde ekozala libula ya moto oyo akolonga. Nakozala Nzambe na ye, mpe ye akozala mwana na Ngai.


Yango wana, nazali kopesa yo toli ete osomba epai na Ngai wolo oyo bapetola na moto mpo ete okoma penza mozwi, bilamba ya pembe mpo ete olata mpe obomba bolumbu na yo ya soni, mpe kisi ya miso mpo ete otia na miso na yo mpe omona malamu.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ