Sima na ngai kosala mibu ebele na libanda ya Yelusalemi, nazongaki na mboka na ngai mpo na komemela bato bakelela ya ekolo na ngai lisungi, mpe mpo na kobonzela Nzambe makabo.
Nasengaki na Tito ete aya epai na bino, mpe natindaki elongo na ye ndeko na biso. Boni, Tito azwaki biloko na bino na mayele mabe ? Tozalaki na ye likanisi moko te ? Tazalaki kosala na ye ndenge moko te ?
Boye, kati na likambo oyo etali kosunga, botala likanisi na ngai na tina na oyo eleki malamu mpo na bino : na mobu oyo esili koleka, bozalaki bato ya liboso, kaka mpo na kosunga te, kasi mpe mpo na kozwa mokano ya kosalaka bongo.
Lisusu, ezali Mangomba nde eponaki ye mpo ete azala moninga na biso ya mobembo kati na mosala oyo ya kosunga. Tozali kosala mosala yango mpo na lokumu ya Ye moko Nkolo, mpe mpo na kolakisa molende na biso ya kosunga bino.
Kati na bino, moto nyonso azwaki likabo kowuta na Nzambe ; boye, mpo na bolamu ya baninga, tika ete asalela yango lokola mobateli malamu ya lolenge nyonso ya ngolu ya Nzambe.