Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakolinto 8:5 - Mokanda na Bomoi

5 Basalaki koleka ndenge tokanisaki : bamipesaki liboso, bango moko, epai ya Nkolo, mpe sima, epai na biso, kolanda mokano ya Nzambe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakolinto 8:5
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Davidi abimaki mpo na kokutana na bango mpe alobaki : « Soki boyei epai na ngai na makanisi ya kimia mpo ete bosunga ngai, wana ngai mpe bino tokosala boyokani ; kasi soki boyei mpo na koteka ngai epai ya banguna na ngai wana maboko na ngai esali mabe te, tika ete Nzambe ya batata na biso azala motatoli mpe akata likambo ! »


Kati na mokili ya Yuda, loboko ya Nzambe ezalaki kosala na nguya makasi epai ya bato, mpo na kopesa bango bomoko na molimo mpo na kotosa mitindo ya mokonzi mpe ya bakalaka na ye, kolandisama na Liloba na Yawe.


Bozala moto makasi te lokola batata na bino ; bomipesa epai na Yawe, boya na Esika ya bule oyo Ye moko abulisi mpo na libela mpe bosalela Yawe, Nzambe na bino, mpo ete kanda makasi na Ye ezala mosika na bino !


« Kasi tala boyokani oyo nakosala elongo na bato ya Isalaele, sima na mikolo wana, » elobi Yawe : « Nakotia mibeko na Ngai kati na makanisi na bango, nakokoma yango kati na mitema na bango, nakozala Nzambe na bango, mpe bango bakozala bato na Ngai.


Nakomema ndambo moko wana ya bato na moto, nakopetola bango ndenge bapetolaka palata na moto mpe nakomeka bango ndenge bamekaka wolo na moto ; bakobelela Kombo na Ngai, mpe Ngai nakoyanola bango. Nakoloba na bango : ‹ Bozali bato na Ngai, › mpe bango bakoloba : ‹ Yawe azali Nzambe na biso ! › »


Bandeko, mpo na mawa oyo Nzambe atalisi biso, nazali kosenga na bino ete bokabaka banzoto na bino epai ya Nzambe lokola mbeka ya bomoi, ya bule mpe esepelisaka Nzambe. Ekozala mpo na bino losambo ya solo kolanda ndenge esengeli.


Bokaba biteni ya banzoto na bino te na lisumu lokola bisalelo mpo na mabe, kasi bomikaba bino moko epai na Nzambe lokola bato oyo basekwa kati na bakufi mpe bazali na bomoi ; mpe bokabela Ye biteni ya banzoto na bino lokola bisalelo mpo na bosembo.


Polo oyo abengama mpo na kozala ntoma ya Yesu-Klisto, kolanda mokano ya Nzambe, mpe ndeko mobali Sositeni ;


Toteyaka sango na biso moko te, toteyaka nde ete Yesu-Klisto azali Nkolo, mpe ete biso tozali bawumbu na bino mpo na Yesu.


Bandeko, tolingi koyebisa bino ndenge nini Nzambe atalisaki ngolu na Ye epai ya Mangomba ya Masedwane.


Boye, ngai mpe nakabi ye sik’oyo epai na Yawe : bomoi na ye mobimba, akozala ya Yawe. Sima na yango, agumbamelaki Yawe na esika yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ