Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakolinto 8:19 - Mokanda na Bomoi

19 Lisusu, ezali Mangomba nde eponaki ye mpo ete azala moninga na biso ya mobembo kati na mosala oyo ya kosunga. Tozali kosala mosala yango mpo na lokumu ya Ye moko Nkolo, mpe mpo na kolakisa molende na biso ya kosunga bino.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakolinto 8:19
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Polo mpe Barnabasi baponaki bakambi mpo na Lingomba moko na moko mpe, sima na bango kosambela mpe kokila bilei, bakabaki bango na maboko ya Nkolo oyo bandimelaki.


Bantoma, bakambi elongo na Lingomba mobimba bazwaki mokano ya kopona ndambo ya bato kati na bango mpe ya kotinda bango na Antioshe elongo na Polo mpe Barnabasi. Baponaki Yuda oyo babengaka Barsabasi, mpe Silasi ; bango mibale bazalaki bakambi kati na bandeko.


Boye, biso nyonso toyokanaki mpo na kopona bato mpe kotindela bino bango, elongo na bandeko balingami na biso, Barnabasi mpe Polo,


Atindaki na Masedwane, mibale kati na basungi na ye ya mosala, Timote mpe Erasite, wana ye moko atikalaki mwa mikolo na Azia.


Mbala moko, mobulu ekotaki kati na engumba mobimba. Bakangaki Gayusi mpe Arisitarke, bato mibale ya Masedwane, oyo bazalaki kotambola elongo na Polo ; mpe bato nyonso bakendeki na lombangu na ndako ya masano.


Yango kaka te ! Tozali mpe komikumisa kati na Nzambe na nzela ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, oyo azongisi boyokani na biso elongo na Nzambe.


Tozali mpe komikumisa kati na pasi, pamba te toyebi ete pasi ebotaka koyika mpiko,


Makambo oyo nyonso ezali mpo na litomba na bino, mpo ete ngolu efuluka koleka kati na bato ebele, mpe ete losambo ya kozongisa matondi ekoma mingi mpo na nkembo ya Nzambe.


Boye, bokokisa sik’oyo likambo yango kolanda makoki na bino ; molende oyo bozalaki na yango mpo na kolinga kosunga, bomonisa yango mpe na kokokisaka likambo yango.


Pamba te soki mokano ya malamu ezali, Nzambe andimaka likabo oyo moto apesi na motema malamu kolanda oyo azali na yango, kasi kolanda te oyo azali na yango te.


Tozali kosala nyonso oyo ekoki mpo ete batonga biso te mpo na lolenge na biso ya kosalela ebele yango ya makabo.


pamba te nayebi molende na bino mpo na kosunga, mpe nazalaki komikumisa na tina na yango epai ya bato ya Masedwane. Nazalaki koloba na bango : « Kati na Akayi, wuta na mobu oyo eleki, bazali ya kobongama mpo na kopesa. » Mpe bolingo na bino etindikaki bato mingi kati na bango na kosunga.


Nzambe azali mpe na makoki ya kotondisa bino na mapamboli ya ndenge na ndenge mpo ete, na tango nyonso mpe kati na makambo nyonso, bozala na nyonso oyo bozali na yango na bosenga mpe botonda lisusu na oyo bokosala na yango misala ya malamu ya lolenge nyonso,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ