Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakolinto 8:17 - Mokanda na Bomoi

17 Pamba te Tito ayambaki na esengo makasi likanisi oyo topesaki ye ya koya epai na bino ; mpe ezali na mokano na ye moko nde ayei epai na bino.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakolinto 8:17
5 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nasengaki na Tito ete aya epai na bino, mpe natindaki elongo na ye ndeko na biso. Boni, Tito azwaki biloko na bino na mayele mabe ? Tozalaki na ye likanisi moko te ? Tazalaki kosala na ye ndenge moko te ?


Boye, kati na likambo oyo etali kosunga, botala likanisi na ngai na tina na oyo eleki malamu mpo na bino : na mobu oyo esili koleka, bozalaki bato ya liboso, kaka mpo na kosunga te, kasi mpe mpo na kozwa mokano ya kosalaka bongo.


Boye, tosengaki na Tito ete akomisa kino na suka mosala yango ya kosunga, ndenge abandaki yango kati na bino.


Nazali kopesa bino mitindo te, kasi nazali nde koluka komeka bosolo ya bolingo na bino na kokokanisa yango na molende ya bato mosusu.


Nazali kosenga na bino bandeko na ngai ete bokanga motema na koyamba malendisi oyo nakomeli bino na mokuse penza.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ