Tika ete Yawe, Nzambe ya batata na biso, akumisama, Ye oyo atiaki makanisi ya lolenge oyo na motema ya mokonzi, mpo ete akoka kopesa lokumu na Tempelo ya Yawe kati na Yelusalemi,
nabimaki na butu elongo na ndambo ya bato. Nalobaki na moto ata moko te makambo oyo Nzambe na ngai atiaki kati na motema na ngai, makambo oyo nasengeli kokokisa mpo na bolamu ya Yelusalemi. Ezalaki na nyama mosusu te elongo na ngai longola kaka nyama oyo nazalaki kotambola likolo na yango.
Boye, soki nakomelaki bino, ezalaki te likolo na moto oyo asalaki mabe to likolo na moto oyo basalaki mabe, kasi ezalaki mpo ete bolingo na bino mpo na biso etalisama kati na bino liboso ya Nzambe.
Tolendisamaki na nzela ya boyei ya Tito kaka te, kasi mpe na nzela ya kobondisama oyo ye Tito azwaki epai na bino. Atalisaki biso posa makasi oyo bozali na yango ya komona ngai, kolela na bino, mpe komipesa na bino mpo na ngai. Mpe nyonso wana esalaki ete esengo na ngai ebakisama lisusu makasi.
Pamba te nazali awa na moto mosusu te, longola kaka ye, oyo azali kokabola na ngai makanisi moko mpe azali komitungisa na ndenge ya solo mpo na bolamu na bino ;
Mpe nyonso oyo bokosala, ezala na maloba to na misala, bosalaka yango na Kombo ya Nkolo Yesu, na kozongisa matondi epai ya Nzambe Tata na nzela ya Yesu-Klisto.
Pamba te Nzambe atia kati na mitema na bango makanisi ya kokokisa mabongisi na Ye moko Nzambe, na boyokani malamu mpo na kolatisa nyama wana nguya na bango ya bokonzi, kino mikano nyonso ya Nzambe ekokisama.