2 Bakolinto 7:8 - Mokanda na Bomoi8 Yango wana, soki nayokisaki bino mawa na nzela ya mokanda na ngai, ezali kosala ngai pasi te kati na motema na ngai. Solo, esalaki ngai nanu pasi na motema, na kotala ndenge eyokisaki bino mawa mpo na mwa tango moke. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Bongo Yesu atunaki ye mpo na mbala ya misato : — Simona, mwana mobali ya Yoane ; boni, olingaka Ngai ? Petelo ayokaki mawa mingi kati na motema mpo ete ekomaki mbala ya misato oyo Yesu atunaki ye : « Olingaka Ngai ? » Bongo azongiselaki Yesu : — Nkolo, oyebi makambo nyonso ; oyebi malamu ete nalingaka Yo ! Yesu alobaki na ye : — Batela bameme na Ngai.