5 Pamba te, tango kaka tokomaki na Masedwane, tozwaki ata tango ya kopema te ; tokutanaki na pasi ya lolenge nyonso : bitumba na libanda, mpe bobangi kati na mitema na biso.
Kasi ebenga ezwaki esika ya kotia matambe na yango te, pamba te mayi ezalaki na etando nyonso ya mokili. Boye, ezongaki na masuwa epai ya Noa. Noa abimisaki loboko, azwaki ebenga mpe akotisaki yango kati na masuwa.
Nazali koyoka bato ebele koloba na se se se : « Botala ! Somo na bangambo nyonso ! Bofunda ye ! Tofunda ye ! » Baninga na ngai nyonso bazali kozela kokweya na ngai, bazali koloba : « Tango mosusu akokosama, tokokanga ye kaka mpe tokozongisela ye mabe ! »
Nakomelaki bino ndenge mpe nasali yango sik’oyo mpo ete bato oyo basengeli kosepelisa ngai bayokisa ngai mawa te tango nakoya. Nandimisami penza na tina na bino nyonso ete esengo na ngai ezali mpe esengo na bino nyonso.
Na libanda, mopanga ekokomisa bango bato bazanga bana ; kati na bandako na bango, somo ekokonza ; bilenge mibali mpe bilenge basi, bana mike mpe bampaka, bango nyonso bakokufa.