Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakolinto 7:15 - Mokanda na Bomoi

15 Mpe bolingo na ye mpo na bino nyonso ekomaka lisusu monene tango akanisaka botosi na bino nyonso mpe ndenge boyambaki ye na kobanga mpe na kolenga.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakolinto 7:15
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Jozefi ayokaki pasi makasi na motema tango amonaki ndeko na ye, akimaki mbangu na libanda mpe alukaki esika mpo na kolela. Akotaki na shambre na ye mpe alelaki kuna.


Mwasi oyo mwana na ye azalaki na bomoi, ayokaki pasi na motema mpo na mwana na ye mpe alobaki na mokonzi : — Nabondeli yo, nkolo na ngai ! Pesa ye mwana oyo azali na bomoi, koboma mwana te ! Kasi mwasi mosusu alobaki : — Kata ye ! Na bongo, akozala ya ngai te, mpe akozala ya ye te !


Sima na mikolo yango misato, bato nyonso ya Yuda mpe ya Benjame basanganaki na Yelusalemi. Na mokolo ya tuku mibale ya sanza ya libwa, bato nyonso bavandaki kati na lopango, liboso ya Ndako ya Nzambe, mpe bazalaki kolenga makasi likolo ya makambo oyo mpe mpo ete mvula ezalaki kobeta makasi.


Bato nyonso oyo bazalaki kolenga mpo na maloba na Nzambe ya Isalaele basanganaki pene na ngai, mpo na misala ya mbindo ya bato oyo bawutaki na bowumbu. Navandaki na mawa kino na tango ya likabo ya pokwa.


Soki kaka nakanisi yango, nabangi, mpe nzoto na ngai ekomi kolenga na somo.


Nalengaka na somo liboso na Yo mpe nabangaka mikano na Yo.


Bosalela Yawe na kobanga mpe bosepela na kolenga.


Mobali na ngai ya motema akotisi loboko na ye na lidusu ya ekuke, bongo motema na ngai ekomi kobeta mpo na ye.


Boni, loboko na Ngai te nde esalaki biloko oyo nyonso, mpe yango te nde ezalisaki yango nyonso ? » elobi Yawe. « Tala moto oyo Ngai nakotala : moto ya mawa, oyo molimo na ye etutami, mpe oyo alengaka liboso ya liloba na Ngai.


Tango Efrayimi azalaki koloba, bato bazalaki kolenga ; azalaki kokonza kati na Isalaele, kasi asalaki mabe na kosambela nzambe Bala ; yango wana akufaki.


Na tango ya kobota, mwasi ayokaka pasi makasi, pamba te eleko ya kobimisa mwana wuta kati na libumu na ye ekoki ; kasi soki kaka aboti, abosanaka pasi nyonso oyo amonaki, mpo na esengo oyo atondaka na yango mpo ete aboti moto.


Mokengeli boloko asengaki mwinda, akotaki mbangu kati na boloko, mpe amibwakaki liboso ya Polo mpe Silasi na kolenga makasi.


Mpe tango nayaki epai na bino, nazalaki kati na bolembu, na kobanga mpe na kolenga.


Pamba te nakomelaki bino lisusu mpo na komeka bino mpe mpo na kotala soki botosaka na makambo nyonso.


Tozali kobombela bino te bolingo na biso, kasi bino bozali kobombela biso oyo ya bino.


Bino bawumbu, botosaka bankolo na bino ya mokili, na limemia, na kobanga mpe na bosembo ya mitema, lokola nde bozali kotosa Klisto ;


Nzambe azali Motatoli na ngai ete nalingaka bino nyonso makasi, na bolingo ya Yesu-Klisto.


Yango wana, balingami na ngai, ndenge bozalaki tango nyonso na botosi, bokoba kosala mpo na lobiko na bino, na kobanga mpe na kolenga : bokosalaka bongo kaka te tango nazali elongo na bino, kasi mpe sik’oyo, na kolekisa, tango nazali elongo na bino te ;


Yango wana, lokola bozali baponami ya Nzambe, basantu mpe balingami na Ye, boyokelaka mingi bato mawa, bozalaka na bolingo, na boboto, na komikitisa mpe na motema molayi.


Soki moto aboyi kotosa mitindo oyo topesi bino kati na mokanda oyo, bokebisa bato nyonso na tina na ye mpe bosangana na ye lisusu te mpo ete ayoka soni.


Soki moto moko azali na biloko ya mokili oyo, bongo amoni ndeko na ye kokelela mpo na eloko songolo kasi aboyi kosunga ye ; boni, moto wana azali na bolingo ya Nzambe kati na ye ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ