Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakolinto 7:14 - Mokanda na Bomoi

14 Namikumisaki epai na ye na tina na bino mpe nakoyokela yango soni te, pamba te ndenge kaka makambo nyonso oyo tolobaki na bino ezali ya solo, ndenge mpe kaka lokumu oyo totombolaki na tina na bino epai ya Tito ezali penza ya solo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakolinto 7:14
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Namibonzaki mobimba epai na Yo mpo na bango, mpo ete bango mpe babulisama na nzela ya bosolo.


Bongo, ata namikumisaka koleka mpo na bokonzi oyo Nkolo apesa biso, mpo na kolendisa kondima na bino kasi mpo na kobebisa yango te, nakoyokela yango soni ata moke te


Nzokande, soki nalingaki komikumisa, nalingaki kozala zoba te, pamba te nalingaki koloba kaka bosolo ; kasi naboyi kosala yango, noki te bakopesa ngai lokumu koleka oyo bato bamonaka kati na ngai to koleka sango oyo bayokaka na tina na ngai.


Kasi motema na ngai etikalaki kozala na kimia te mpo ete namonaki kuna te ndeko na ngai, Tito. Boye, natikaki bango mpe nakendeki na Masedwane.


Yango wana, tobondisamaki na nzela ya makambo oyo nyonso. Mpe esengo makasi ebakisamaki na kobondisama na biso na kotala esengo ya Tito, pamba te bino nyonso bokitisaki ye motema.


Nalobaki na tina na bino na bosembo monene, mpe namikumisaka makasi na tina na bino. Kati na pasi na biso nyonso, nalendisamaki makasi, mpe natondi na esengo.


Kasi Nzambe oyo abondisaka mitema ya bato oyo batutami alendisaki biso na nzela ya boyei ya Tito.


Yango wana, bolakisa bango elembo ya bolingo na bino mpo ete Mangomba nyonso endima mpe eyeba ete tomikumisaka na pamba te na tina na bino liboso na bango.


Boye, tango nakozala lisusu elongo na bino, lolendo na bino kati na Yesu-Klisto ekobakisama lisusu mpo na ngai.


Mpe kati na Mangomba ya Nzambe, tozali komikumisa na tina na molende mpe kondima na bino kati na minyoko nyonso mpe kati na pasi oyo bozali komona.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ