Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakolinto 6:9 - Mokanda na Bomoi

9 koyebana lokola bato oyo bayebani te, nzokande toyebani makasi ; koyebana lokola bakufi, nzokande tozali bato ya bomoi ; koyebana lokola bato bakweyisama, nzokande baboma biso te ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakolinto 6:9
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ndambo ya bato ya mayele oyo balandaka malakisi ya Epikire mpe ya Zenon bakomaki kotiana tembe na ye. Bamoko batunaki : — Moto oyo ya makelele alingi koloba nini ? Bamosusu balobaki : — Tomoni lokola nde azali kolobela banzambe ya bapaya ! Balobaki bongo mpo ete Polo azalaki koteya Sango Malamu na tina na Yesu mpe lisekwa kati na bakufi.


Nzokande, bino moko bozali komona mpe koyoka ndenge nini Polo wana azali kosala nyonso mpo na kondimisa bato mpe kobenda sima na ye bato ebele awa kaka na Efeso te, kasi mpe na etuka mobimba ya Azia ; azali koloba ete banzambe oyo esalemi na maboko ya bato ezali banzambe te.


Batianaki tembe na tina na lolenge na bango ya kosambela, mpe na tina na moto moko oyo asila kokufa, moto oyo Polo azalaki koloba na tina na ye ete azali na bomoi ; kombo ya moto yango ezalaki « Yesu. »


Lokola nazali na likambo moko te ya malonga ya kokomela mokonzi monene na tina na ye, nayei na ye mpo ete asamba liboso na bino nyonso, mpe mingi-mingi liboso na yo, mokonzi Agripa, mpo ete nakoka kozwa likambo ya kokomela mokonzi monene, sima na biso kotuna ye mituna.


na nzela ya nguya Molimo na Nzambe, oyo emonisami kati na bikamwa mpe bilembo. Boye, wuta na Yelusalemi, na bazingazinga nyonso kino na Iliri, nasakolaki Sango Malamu ya Klisto na mobimba na yango.


Kolanda ndenge ekomama : « Ezali mpo na Yo nde balukaka koboma biso mikolo nyonso ; bazwaka biso lokola bameme ya koboma. »


Nzokande, Nkolo apesaka biso etumbu mpo na kozongisa biso na nzela, mpo ete tozwa etumbu te elongo na mokili.


Bandeko na ngai, mokolo na mokolo, nandimaka kokufa, wana namikumisaka na tina na bino kati na Yesu-Klisto, Nkolo na biso.


Pamba te nakanisi ete, biso bantoma, Nzambe atia biso na suka ya molongo lokola bato oyo bakatela bango etumbu ya kufa na libanda ya masano. Mpo na mokili mobimba, mpo na ba-anjelu mpe mpo na bato, Nzambe akomisa biso lokola lisano ya kotala.


Nakoki solo komonana lokola moto oyo ayebi nanu te koloba malamu, kasi nazali na boyebi ; mpe tolakisaki bino yango polele na banzela mpe na makambo nyonso.


toboyaka nde makambo ya soni oyo esalemaka na nkuku, toboyaka kotambola na lokuta mpe kobebisa bosolo ya Liloba na Nzambe. Nzokande, wuta tokoma koteya bosolo na polele, topesaka na moto nyonso nzela ya kotala soki tozali kotambola malamu to te na miso ya Nzambe.


Lokola toyebi makambo oyo ezali kati na kotosa Nkolo, yango wana tondimisaka bato mosusu, mpe Nzambe ayebi biso malamu. Nazali na elikya ete bino mpe boyebi yango kati na mitema na bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ