2 Bakolinto 6:16 - Mokanda na Bomoi16 Boyokani nini ekoki kozala kati na Tempelo ya Nzambe mpe banzambe ya bikeko ? Pamba te biso tozali Ndako ya Nzambe na bomoi, kolanda maloba na Ye moko : « Nakovanda kati na bango mpe nakotambola elongo na bango. Nakozala Nzambe na bango, mpe bango bakozala bato na ngai. » အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Alobaki na ngai : « Mwana na moto, ezali awa nde kiti na Ngai ya bokonzi ezalaka, esika oyo natiaka makolo na Ngai. Ezali na esika oyo nde nakovanda mpo na libela kati na bana ya Isalaele. Libota ya Isalaele ekotikala lisusu te kokomisa Kombo na Ngai mbindo, ezala bango to bakonzi na bango, na nzela ya kindumba na bango mpe ya banzambe ya bikeko ya bakonzi na bango, oyo ezanga bomoi na likolo ya bisambelo na bango ya likolo ya bangomba.