Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakolinto 6:12 - Mokanda na Bomoi

12 Tozali kobombela bino te bolingo na biso, kasi bino bozali kobombela biso oyo ya bino.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakolinto 6:12
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yo mpe, Nzambe alekisi yo na nzela ya nkaka mpe ya pasi mpo na kovandisa yo na esika ya pole, esika oyo ezangi mitungisi ; akotondisa mesa na yo na biloko ya kitoko.


Mpo ete makolo na yo ezala na mikakatano te tango okotambola ; mpe soki okimi mbangu, okokweya te.


Biloko oyo moto azali komona na miso ezali malamu koleka biloko oyo azali na yango na makanisi : yango mpe ezali pamba, ezali lokola moto azali kolanda mopepe.


Oh libota ya Jakobi, makambo ya boye esengeli solo kolobama ? « Boni, Molimo na Yawe atomboki mpo ete asala makambo ya boye ? Maloba na Ye ezali ya boboto te mpo na moto oyo atambolaka alima ? »


Kasi ekuke to nzela oyo ememaka na bomoi ezali moke, mpe bato moke kaka nde bamonaka yango.


Boye, tomonaka pasi ya ndenge na ndenge, kasi tosukaka te ; mobulu ekotaka kati na mayele na biso, kasi tobungisaka elikya te ;


Bopesa biso esika kati na mitema na bino ! Tosalaki moto moko te mabe, tobebisaki moto moko te, tokosaki moto moko te mpo na kobotola ye biloko.


Nzambe azali Motatoli na ngai ete nalingaka bino nyonso makasi, na bolingo ya Yesu-Klisto.


Soki moto moko azali na biloko ya mokili oyo, bongo amoni ndeko na ye kokelela mpo na eloko songolo kasi aboyi kosunga ye ; boni, moto wana azali na bolingo ya Nzambe kati na ye ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ