Nzokande, na pokwa, liboso ete moto yango aya epai na ngai, loboko ya Yawe ezalaki likolo na ngai mpe afungolaki monoko na ngai liboso ete moto yango akoma epai na ngai na tongo. Monoko na ngai efungwamaki mpe nakomaki koloba.
Solo, masanga ya vino ekosaka ; moto ya lolendo avandaka kimia te. Mpo ete azali lokoso lokola mboka ya bakufi mpe atondaka te lokola kufa, asangisaka bato ya bikolo nyonso pembeni na ye mpe akomisaka bango bawumbu na ye.
Krispisi, mokambi ya ndako ya mayangani, elongo na libota na ye mobimba bazalaki na kondima epai ya Nkolo ; mpe bato mingi ya Kolinto oyo bazalaki koyoka Polo bakomaki bandimi ya Nkolo mpe bazwaki libatisi.
Mpo na ngai, nakopesa biloko na ngai nyonso na esengo, mpe nakomipesa mobimba mpo na bino. Soki nalingi bino mingi ; boni, bino bokoki kolinga ngai mingi te ?
Solo, tango nakomelaki bino, nazalaki kati na pasi makasi, kati na komitungisa na motema na ngai, mpe kati na kolela makasi ; ezalaki te mpo na koyokisa bino mawa, kasi mpo ete boyeba mozindo ya bolingo na ngai mpo na bino.
Bino bato ya Filipi, boyebi malamu ete, na ebandeli ya mosala na ngai ya koteya Sango Malamu, wana nalongwaki na Masedwane, ata Lingomba moko te esanganaki na ngai na nzela ya lisungi, longola kaka bino.
Ana asambelaki na maloba oyo : Motema na ngai ezali kosepela mpo na Yawe mpo ete alendisi bomoi na ngai. Wana nazali na esengo mpo ete okangoli ngai, monoko na ngai ekotelemela banguna na ngai.