Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakolinto 5:8 - Mokanda na Bomoi

8 Totondi penza na mpiko, kasi tokosepela kotika nzoto oyo mpo na kokende kovanda elongo na Nkolo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakolinto 5:8
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Okolakisa ngai nzela ya bomoi ; okotondisa ngai na esengo kati na bozalisami na Yo, elongo na bilengi ya suka te na ngambo ya loboko na Yo ya mobali.


Mpo na ngai, sima na ngai kolonga, nakotala elongi na Yo ; sima na ngai kolamuka, nakosepela na komona Yo !


Babenganaka moto mabe mpo na mabe na ye, kasi moto ya sembo awumelaka na elikya kino ata na kufa.


Nkolo azongiselaki ye : « Malamu ! Ozali mosali malamu mpe ya sembo. Lokola ozalaki sembo na biloko moke, nakopesa yo mokumba ya kobatela biloko ebele. Yaka kosepela elongo na nkolo na yo. »


Nkolo azongiselaki ye : « Malamu ! Ozali mosali malamu mpe ya sembo. Lokola ozalaki sembo na biloko moke, nakopesa yo mokumba ya kobatela biloko ebele. Yaka kosepela elongo na nkolo na yo. »


« Nkolo, sik’oyo, kolanda elaka na Yo, tika ete mowumbu na Yo akende na kimia !


Tika ete moto oyo alingi kosalela Ngai alanda Ngai ! Epai Ngai nakozala, mosali na Ngai mpe akozala wana. Tata na Ngai akokumisa moto oyo asalelaka Ngai.


Mpe, sima na Ngai kobongisa yango, nakozonga mpe nakozwa bino mpo ete bozala elongo na Ngai ; mpe mpo ete bino mpe bozala na esika oyo Ngai nazali.


Tata, nalingi ete bato oyo opesaki Ngai bazala elongo na Ngai kuna epai nazali kokende, mpo ete bamona nkembo na Ngai, nkembo oyo opesaki Ngai, pamba te olingaki Ngai liboso ete okela mokili.


Kasi Polo azongiselaki biso : — Mpo na nini bozali kolela mpe kolembisa ngai ? Nasili komibongisa kaka te mpo na kokangama, kasi mpe mpo na kokufa kati na Yelusalemi mpo na Kombo ya Nkolo Yesu.


Yango wana tozalaka na mpiko tango nyonso. Mpe toyebi malamu ete, awa tozali kowumela kati na nzoto oyo, tozali mosika na Nkolo,


Yango wana, ezala tovandi kati na nzoto oyo to totiki yango, tokolukaka kaka kosepelisa Nkolo.


Balingami na ngai, tozali sik’oyo bana na Nzambe ; kasi oyo tokokoma emonisami nanu te. Nzokande, toyebi solo ete tango Klisto akomimonisa, tokokoma lokola Ye ; pamba te tokomona Ye ndenge penza Ye azalaka.


Elakeli mabe ekozala lisusu te. Kiti ya Bokonzi ya Nzambe mpe ya Mpate ekozala kati na engumba, mpe bawumbu na Ye bakosalela Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ