Boye, totalaka te oyo emonanaka na miso, kasi totalaka nde oyo emonanaka te ; pamba te oyo emonanaka ezali mpo na tango moke, kasi oyo emonanaka te ekowumelaka seko na seko.
boye ezali lisusu ngai te moto nazali kobika, kasi ezali Klisto nde azali kobika kati na ngai. Bomoi oyo nazali kobika sik’oyo kati na nzoto na ngai lokola moto, nazali kobika yango na nzela ya kondima kati na Mwana na Nzambe, oyo alingaki ngai mpe amikabaki mpo na ngai.
Bolingaka Yesu-Klisto atako bomona Ye te. Atako bozali mpe kaka komona Ye te sik’oyo, bozali kondimela Ye mpe botondi na esengo ya nkembo oyo moto akoki kolimbola te,
Botelemelaka ye mpe boyikaka mpiko kati na kondima, pamba te boyebi ete bandeko na bino, oyo bapalangana kati na mokili bazali mpe komona bapasi lokola bino.