Opesaka bato etumbu mpo na masumu na bango mpo na kozongisa bango na nzela ; obebisaka biloko na bango ya motuya lokola nselele. Solo, moto nyonso azali kaka mopepe.
Pamba te, tala liloba oyo Nkolo Yawe, Mosantu ya Isalaele, alobi : « Ekozala kati na kobongola mitema mpe kimia nde bokozwa lobiko na bino ; ekozala na nzela ya kimia mpe ya elikya nde bokozwa makasi na bino ; kasi bino, bolingi bongo te.
Mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi alobaki na bango : « Boloba na Ezekiasi : ‹ Tala makambo oyo mokonzi monene, mokonzi ya Asiri, alobi : Otie elikya na yo na nini ?
Toyebi malamu ete, soki ndako na biso, ndako oyo ya kapo epai wapi tovandaka awa na mokili ebebisami, tozali na ndako oyo Nzambe abongisela biso, ndako ya seko kati na Lola, ndako monene oyo etongama na maboko ya bato te.
Bato nyonso wana bakufaki kati na kondima mpe batikalaki kozwa te biloko oyo Nzambe alakaki bango, kasi bamonaki yango kaka na mosika mpe bapesaki yango mbote. Bandimaki ete bazali solo bapaya mpe baleki nzela kati na mokili.
Nazali sik’oyo kolendisa bakambi ya Lingomba, oyo bazali kati na bino, pamba te ngai mpe nazali mokambi lokola bango, nazali motatoli ya bapasi ya Klisto mpe nakozwa nkembo oyo ekomonisama.
Ngai Yoane, ndeko na bino, oyo azali kokabola elongo na bino pasi, bokonzi mpe molende kati na Yesu, nazalaki kati na esanga ya Patimosi, likolo ya Liloba na Nzambe mpe litatoli na ngai na tina na Yesu.