2 Nzokande, kati na ndako yango ya kapo, tozali penza komona pasi, wana tozali kozela na posa makasi ete tolata ndako na biso ya Lola,
Olatisaki ngai poso ya nzoto mpe misuni te ? Otongaki mikuwa mpe misisa na ngai te ?
Oh ngai moto na mawa ! Nani akokangola ngai na nzoto oyo ya kufa ?
Ezali yango moko kaka te nde ezali kolela ; kasi biso ba-oyo mpe tozwaki Molimo lokola mbuma ya liboso tozali mpe komona pasi kati na mitema, wana tozali kozela na posa makasi ete Nzambe akomisa biso bana na Ye penza mpe asikola banzoto na biso.
Boyoka, nazali kotalisa bino mabombami : Biso nyonso, tokokufa te ; kasi biso nyonso, tokobongolama,
Makambo mibale ezali kobenda ngai ngambo na ngambo : na ngambo moko, kokufa mpo na kozala elongo na Klisto, pamba te yango nde eleki malamu ;