Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakolinto 5:15 - Mokanda na Bomoi

15 Akufaki mpo na bato nyonso mpo ete ba-oyo bazali na bomoi bazala lisusu na bomoi te mpo na bango moko, kasi mpo na Ye oyo akufaki mpe asekwaki mpo na bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakolinto 5:15
41 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Namani alobaki : — Lokola oboyi, pesa nzela ete napesa mosali na yo ndambo ya mabele oyo bamile mibale ekoki komema, pamba te mosali na yo akoki te kobonzela banzambe mosusu bambeka ya kotumba to bambeka ya boyokani, bobele Yawe.


Boye, Ngai nalekelaki wana mpe namonaki ndenge nini ozalaki kobunda-bunda na kufa kati na makila. Bongo nalobaki na yo : ‘ Okozala na bomoi atako ozali kobaluka na makila ! ’


Nakotia Molimo na Ngai kati na bino, mpe bokozwa lisusu bomoi ; bongo nakovandisa bino na mabele na bino. Boye, bokoyeba solo ete Ngai Yawe nde nalobaki mpe nakokisaki yango, elobi Yawe. »


Yawe alobaki na ngai : — Mwana na moto, sakola epai ya pema, sakola mpe loba na pema : « Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Oh pema, yaka wuta na bisika nyonso mopepe ebimelaka mpe kota kati na banzoto oyo mpo ete ezwa lisusu bomoi ! »


Tala, atondisami na lolendo, motema na ye ezali na bosembo te ; kasi moto ya sembo akobika na nzela ya kondima na ye.


Ata soki napanzi bango kati na bikolo ya bapaya, ezala na mokili oyo eleki mosika, bakokanisa Ngai kaka. Bango elongo na bana na bango ya mibali bakobika mpe bakozonga na mokili na bango.


ete akokangola biso na maboko ya banguna na biso, mpe akopesa biso nzela ya kosalela Ye na kobanga te,


Nazali koloba na bino penza ya solo : moto oyo azali koyoka maloba na Ngai mpe azali kondima Ye oyo atindaki Ngai, azali na bomoi ya seko mpe akosambisama te, kasi asili kolongwa na kufa mpe akomi na bomoi.


Ndenge Tata oyo atindaki Ngai azali etima ya bomoi mpe Ngai nazali na bomoi na nzela na Ye, ndenge wana mpe moto oyo alie nzoto na Ngai akozala na bomoi na nzela na Ngai.


Bandeko, mpo na mawa oyo Nzambe atalisi biso, nazali kosenga na bino ete bokabaka banzoto na bino epai ya Nzambe lokola mbeka ya bomoi, ya bule mpe esepelisaka Nzambe. Ekozala mpo na bino losambo ya solo kolanda ndenge esengeli.


oyo akabamaki mpo na masumu na biso mpe asekwaki mpo ete tokoma bato ya sembo.


Soki moke te ! Biso oyo tosila kokufa mpo na lisumu, ndenge nini tozongela lisusu kotambola kati na masumu ?


Pamba te toyebi malamu ete bomoto ya kala ebakamaki na ekulusu elongo na Klisto mpo ete nzoto na biso lokola esalelo ya lisumu ekufa mpe tozala lisusu bawumbu ya lisumu te.


Kasi soki Klisto azali kati na bino, atako nzoto na bino ekokufa mpo na lisumu, kasi Molimo azali bomoi kati na bino, pamba te bokoma bato ya sembo.


Pamba te kati na Yesu-Klisto, Mobeko ya Molimo oyo apesaka bomoi ekangoli ngai na bowumbu ya mobeko ya lisumu mpe ya kufa.


Baposa ya nzoto ememaka na kufa, kasi baposa ya Molimo ememaka na bomoi mpe na kimia.


Yango wana, ngai, kati na makambo nyonso, nasalaka makasi mpo na kosepelisa bato nyonso ; nalukaka litomba na ngai moko te, kasi nalukaka bolamu ya bato ebele, mpo ete babika.


Yango wana, na likambo oyo etali Klisto, ezala kati na bolembu, na kofingama, na kozanga, na minyoko to mpe na pasi oyo nakutanaka na yango, nasepelaka na ngai kaka ; pamba te ezali na tango oyo nazalaka na bolembu nde natondaka na makasi.


Ezali Nzambe nde apesaki biso makoki ya kozala basali ya Boyokani ya sika oyo evandisami na Mibeko te kasi na Molimo ; pamba te Mibeko ebomaka, kasi Molimo apesaka bomoi.


Boye, kobanda sik’oyo, tokotala lisusu moto moko te na ndenge ya bomoto. Atako, na kala, totalaki Klisto na ndenge ya bomoto, kasi sik’oyo tozali lisusu kotala Ye bongo te.


Lokola tozali kobika bomoi na biso na nzela ya Molimo, totambola mpe na lisungi ya Molimo.


Boye, tala makambo oyo nazali koyebisa bino mpe kobetela sete kati na Nkolo : Botambolaka lisusu te lokola Bapagano oyo balandaka makanisi na bango, oyo ezanga tina.


pamba te nyonso oyo ebimi na pwasa ekomaka pole. Yango wana baloba : « Moto na pongi, lamuka, bima kati na bakufi, mpe Klisto akongengisa yo. »


bakundaki bino elongo na Klisto na nzela ya libatisi ; mpe, kati na Ye, bosekwaki elongo na Ye na nzela ya kondima kati na nguya ya Nzambe oyo asekwisaki Ye kati na bakufi.


Lokola bosekwaki mpe elongo na Klisto, bolukaka biloko ya Likolo epai wapi Klisto avandi na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe,


Mpe nyonso oyo bokosala, ezala na maloba to na misala, bosalaka yango na Kombo ya Nkolo Yesu, na kozongisa matondi epai ya Nzambe Tata na nzela ya Yesu-Klisto.


Mosala nyonso oyo bosalaka, bosalaka yango na mitema na bino mobimba, lokola nde bozali kosala yango mpo na Nkolo, kasi mpo na bato te,


oyo akufelaki biso mpo ete, ezala soki tozali na bomoi to tokufi, tozala na bomoi elongo na Ye.


amikabaki Ye moko mpo na biso, mpo ete akangola biso na mabe nyonso mpe apetola biso mpo na Ye moko lokola bato na Ye, oyo batondi na posa makasi ya kosala misala ya malamu.


Yango wana mpe kutu Yesu ateyaki Sango Malamu ata epai ya bato oyo bazali sik’oyo ya kokufa mpo ete basambisama kolanda mibeko ya bato na oyo etali nzoto mpe babika bomoi kolanda mokano ya Nzambe na oyo etali Molimo.


Botala ndenge nini Nzambe atalisaki biso bolingo na Ye : atindaki Mwana na Ye se moko kati na mokili mpo ete tozala na bomoi ya solo na nzela na Ye.


Nazali Ye oyo azali na bomoi ; nakufaki, mpe sik’oyo tala, nazali na bomoi mpo na libela na libela ! Nasimbi bafungola ya kufa mpe ya mboka ya bakufi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ