Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakolinto 4:9 - Mokanda na Bomoi

9 tonyokwamaka mingi, kasi Nzambe asundolaka biso te ; tokweyisamaka na mabele, kasi tokufaka te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakolinto 4:9
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Soki bato balembi, mpe yo olobi : ‹ Telema ! › Nzambe akobikisa bango,


« Wuta bolenge na ngai, banyokoli ngai bambala ebele, kasi batikali kolonga ngai te ! »


Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi, ya koyemba lokola nzembo na kombo « Mboloko ya tongo. »


pamba te Yawe alingaka bosembo, mpe asundolaka te bayengebene na Ye. Babatelamaka mpo na seko, kasi bana ya bato mabe bakolimwa.


Nzoto na ngai ekomaka kosala pasi makasi tango bayini na ngai bafingaka ngai, tango balobaka na ngai mokolo mobimba : « Wapi Nzambe na yo ? »


Nazalaka na posa ya kokanisa makambo oyo, ndenge mpe nasopaka molimo na ngai : Tango nazalaki kotambola kati na ebele ya bato, nazalaki komema bango kino na Tempelo ya Nzambe, kati na koganga ya esengo mpe ya kozongisa matondi lokola makelele ya bato oyo bazali na feti.


Yawe azali ebombamelo mpo na bato oyo bazali konyokolama, mpe ndako makasi mpo na tango ya pasi.


pamba te ata soki moto ya sembo akweyi mbala sambo, akotelema kaka ; nzokande pasi ekweyisaka moto mabe.


Tango okokatisa mayi monene, nakozala elongo na yo ; mpe tango okokatisa bibale, ekozindisa yo te. Tango okotambola kati na moto, okozika te, mpe ndemo na yango ekotumba yo te ;


Bakobenga yo lisusu te Engumba basundola, bakobenga lisusu mokili na yo te Mokili ebeba ; kasi bakobenga yo « Esengo ya Yawe, » mpe bakobenga mokili na yo « Mwasi ya libala, » pamba te Yawe akozwa esengo kati na yo, mpe mabele na yo ekozwa mobali ya libala.


Oh banguna na ngai, boseka ngai te ! Ata soki nakweyi, nakotelema kaka. Ata soki navandi kati na molili, Yawe azali pole na ngai.


Nzokande, nzete ya figi ebimisi fololo te, nzete ya vino eboti mbuma te, nzete ya olive eboti mbuma te, bilanga ebimisi bilei te, bameme mpe bantaba ezali te kati na lopango, mpe bangombe ezali te kati na lopango.


Bobosana te makambo oyo nayebisaki bino : « Mowumbu aleki nkolo na ye te, na bokonzi. » Lokola banyokolaki Ngai, bino mpe bakonyokola bino ; soki babatelaki mateya na Ngai, bakobatela mpe mateya na bino.


Nani akokabola biso na bolingo ya Klisto ? Pasi, somo, minyoko, nzala, kozanga bilamba, likama to mopanga ?


Kasi Nzambe oyo abondisaka mitema ya bato oyo batutami alendisaki biso na nzela ya boyei ya Tito.


Solo, bato nyonso oyo balingi kotambola na botosi kati na Yesu-Klisto bakonyokolama.


Bozalaka na lokoso ya mbongo te, bosepelaka nde na oyo bozali na yango, pamba te Ye moko Nzambe alobaki : « Nakotikala kokabwana na yo te, nakotikala kosundola yo te. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ