Ngai nazali kobatisa bino na mayi mpo na kolakisa ete bobongoli mitema. Kasi sima na ngai, Moto moko azali koya, aleki ngai na nguya ; ngai nabongi kutu te mpo na kofungola ata basinga ya basandale na Ye ; ezali Ye nde akobatisa bino kati na Molimo Mosantu mpe kati na moto.
Moto oyo alobaka na kombo na ye moko alukaka lokumu na ye moko ; kaka oyo azali koluka lokumu ya Nzambe oyo atindaki Ye nde azali koloba solo, mpe mabe ezali te kati na Ye.
Ezali Ye nde Nzambe atomboli na nzela ya loboko na Ye ya mobali lokola Mokonzi mpe Mobikisi, mpo ete bana ya Isalaele bakoka kozwa nzela ya kobongola mitema mpe kozwa bolimbisi ya masumu na bango.
Yango wana, nazali koloba na bino ete moto moko te, wana akambami na Molimo ya Nzambe, akoki koloba : « Tika ete Yesu alakelama mabe ! » Mpe moto moko te akoki koloba : « Yesu azali Nkolo, » soki akambami na Molimo Mosantu te.
Pamba te, ata soki bozalaki na balakisi nkoto zomi kati na Klisto, kasi bozali na batata ebele te. Ngai nde nazali tata na bino kati na Yesu-Klisto, na nzela ya Sango Malamu.
Kasi mpo na biso, Nzambe azali kaka se moko, Ye nde azali Tata mpe Mokeli na nyonso, mpe biso tozali na bomoi mpo na Ye. Mpe Nkolo azali kaka se moko, Ye nde Yesu-Klisto. Nyonso esalema na nzela na Ye, mpe biso tozali na bomoi mpo na Ye.
Pamba te Yesu-Klisto, Mwana na Nzambe, oyo ngai Silasi mpe Timote toteyaki bino, azalaki te « iyo » mpe « te ; » kasi kati na Ye, ezalaki tango nyonso « iyo. »
Bandeko na ngai, Nzambe abenga bino mpo ete bozala bansomi. Kasi tika ete bonsomi yango ekoma te mpo na bino libaku malamu ya kotambola kolanda baposa ya nzoto. Nzokande, na nzela ya bolingo, bosunganaka bino na bino.
Yango wana nazali koyikela makambo nyonso mpiko mpo na bolamu ya bato oyo Nzambe apona, mpo ete bango mpe bazwa lobiko oyo ezali kati na Yesu-Klisto, elongo na nkembo ya seko.
Kati na lokoso na bango, bakobetela bino masolo ya lokuta mpo na kobenda bino mbongo na nzela ya maloba ya sukali. Nzokande, wuta kala, Nzambe akatela bango etumbu oyo ekoki mpo na bango, mpe libebi ezali penza kozela bango.