18 Boye, totalaka te oyo emonanaka na miso, kasi totalaka nde oyo emonanaka te ; pamba te oyo emonanaka ezali mpo na tango moke, kasi oyo emonanaka te ekowumelaka seko na seko.
Tika ete Ye moko Yesu-Klisto, Nkolo na biso, mpe Nzambe, Tata na biso, oyo alingaki biso mpe apesaki biso, na ngolu na Ye, malendisi ya seko mpe elikya ya malamu,
Bato nyonso wana bakufaki kati na kondima mpe batikalaki kozwa te biloko oyo Nzambe alakaki bango, kasi bamonaki yango kaka na mosika mpe bapesaki yango mbote. Bandimaki ete bazali solo bapaya mpe baleki nzela kati na mokili.