17 Pamba te pasi oyo tozali komona sik’oyo ezali pepele mpe ezali koleka, ezali nde kobongisela biso nkembo monene, nkembo ya seko mpe nkembo oyo eleki nyonso na motuya.
Mpo ete nazalaki na kanda makasi, nabombelaki yo elongi na Ngai kaka mpo na tango moke ; kasi nakolakisa yo bolamu mpo na bolingo oyo ezangi suka, elobi Yawe, Mosikoli na yo.
Bosepela mpe bozala na esengo, pamba te lifuti na bino ezali monene kati na Likolo ; pamba te ezalaki mpe kaka ndenge wana nde banyokolaki basakoli oyo bazalaki liboso na bino.
Tango makambo yango ekokokisama, bosepela mpe bozala na esengo, pamba te lifuti na bino ezali monene kati na Likolo. Ezalaki mpe kaka ndenge wana nde batata na bango banyokolaki basakoli.
Nani akokatela bango etumbu ? Moko te ! Yesu-Klisto akufaki ; kutu, asekwaki, azali na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe, mpe azali kobondela mpo na biso.
Mpe biso nyonso oyo bilongi na biso ezipama te, biso oyo tomonisaka nkembo ya Nkolo, tozwaka elilingi na Ye kati na nkembo oyo kongenga na yango ebakisamaka se kobakisama. Nyonso wana ezali mosala ya Nkolo oyo azali Molimo.
Yango wana nazali koyikela makambo nyonso mpiko mpo na bolamu ya bato oyo Nzambe apona, mpo ete bango mpe bazwa lobiko oyo ezali kati na Yesu-Klisto, elongo na nkembo ya seko.
Esengo na moto oyo akangaka motema na tango ya komekama ! Pamba te sima na ye kolonga komekama, akozwa motole ya bomoi, oyo Nzambe alakaki na bato oyo balingaka Ye.
Kasi sima na bino komona pasi mpo na mwa tango moke, Nzambe ya ngolu nyonso, oyo abenga bino na nkembo na Ye ya seko kati na Yesu-Klisto, akokomisa bino bato ya kokoka, akolendisa bino, akopesa bino makasi mpe akotelemisa bino ngwi.
Balingami na ngai, tozali sik’oyo bana na Nzambe ; kasi oyo tokokoma emonisami nanu te. Nzokande, toyebi solo ete tango Klisto akomimonisa, tokokoma lokola Ye ; pamba te tokomona Ye ndenge penza Ye azalaka.
Epai na Ye oyo azali na makoki ya kobatela bino mpo ete bokweya te, mpe ya kotelemisa bino liboso ya nkembo na Ye lokola bato oyo bazangi mbeba mpe bato ya esengo monene ;