Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakolinto 4:16 - Mokanda na Bomoi

16 Yango wana tobungisaka elikya te. Mpe atako bomoto na biso ya libanda ezali kobeba moke-moke, kasi bomoto na biso ya kati ekomaka ya sika, mokolo na mokolo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakolinto 4:16
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Natondi na posa ya lobiko na Yo, nazali na elikya kati na liloba na Yo.


Nakozalaka na elikya na likambo oyo : nakobika bolamu ya Yawe kati na mokili ya bato ya bomoi.


Sepelisa ngai mpe yokisa ngai nsayi na motema ; mpe mikuwa na ngai oyo obukaki ekosepela makasi.


Nzoto na ngai ekoki kobeba, mpe motema na ngai ekoki kolemba ; kasi Nzambe azali Libanga mpe libula na ngai mpo na tango nyonso.


Apesaka makasi na bato oyo balembi mpe abakisaka nguya na bato oyo bazanga nguya.


basi bato oyo batiaka elikya na Yawe, Yawe ayeisaka makasi na bango ya sika : bapumbwaka likolo lokola bampongo, bapotaka mbangu mpe bapemaka te, batambolaka mpe balembaka te.


Olobaki : ‹ Mawa na ngai ! Yawe abakisi pasi mpe minyoko na ngai ; nalembi likolo ya kolela mpe nazali lisusu na kimia te ! ›


Pesa biso bilei oyo tosengeli na yango, mokolo na mokolo,


Bomekolaka te bizaleli ya tango oyo, kasi bobongwana na nzela ya boyeisami sika ya mayele na bino, mpo ete bososolaka mokano ya Nzambe, oyo ezali malamu, esepelisaka Ye mpe ezali ya kokoka.


Pamba te kati na motema na ngai, nasepelaka na Mobeko ya Nzambe ;


Yango wana, bandeko balingami, botelema ngwi mpe bomitika te ete baningisa bino. Bokendaka tango nyonso liboso kati na mosala ya Nkolo, wana boyebi malamu ete mosala na bino kati na Nkolo ezali ya pamba te.


Mpo na ngai, nakopesa biloko na ngai nyonso na esengo, mpe nakomipesa mobimba mpo na bino. Soki nalingi bino mingi ; boni, bino bokoki kolinga ngai mingi te ?


Boye, lokola yango nde lotomo oyo Nzambe apesaki biso na mawa na Ye, tobungisaka elikya te ;


mpo na kobondela ete alendisa bino na nguya, mpo na bolamu ya bomoto na bino ya kati, na nzela ya Molimo na Ye kolanda bomengo ya nkembo na Ye,


mpo ete Molimo akomisa mayele mpe makanisi na bino ya sika,


mpe bolataki bomoto ya sika oyo emikomisaka ya sika mpo ete bokoma na boyebi ya kokoka kolanda elilingi ya Mokeli ya bomoto yango.


abikisaki biso. Asalaki bongo mpo na bosembo na biso te, kasi mpo na mawa na Ye na nzela ya Molimo Mosantu oyo akomisaki biso bato ya sika na mokolo ya mbotama na biso ya mibale.


kasi bolukaka nde kitoko ya bomoto ya kati : esilaka te, ewutaka na molimo ya boboto mpe ya kimia, ezali na motuya mingi na miso ya Nzambe.


Soki bafingi bino likolo ya Kombo ya Klisto, bozali bato ya esengo, pamba te Molimo ya nkembo, Molimo ya Nzambe, azali likolo na bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ