13 Mpe awa tozali na molimo wana moko ya kondima, kolanda ndenge ekomama : « Nandimaki, yango wana nalobaki, » biso mpe tondimaka, mpe yango wana tolobaka.
Solo, nazalaka na elikya, ezala soki nalobaka : « Nazali moto na pasi makasi. »
Motatoli ya lokuta akokufa, kasi moto oyo ayokaka akoloba tango nyonso.
Te ! Biso tondimaka ete tobiki na ngolu ya Nkolo Yesu, ndenge moko kaka na bango.
to mpo ete tolendisana elongo, na nzela ya kondima moko oyo tozali na yango.
epai na mosusu kondima ; epai na mosusu, likabo ya kobikisa babeli ;
Lokola tozali na elikya ya lolenge oyo, tozali na bobangi te ;
Boye, kufa esalaka mosala na yango kati na biso, kasi bomoi esalaka mosala na yango kati na bino.
Ngai Simona Petelo, mosali mpe ntoma ya Yesu-Klisto ; Epai ya bato oyo bazwaki kondima ya motuya moko na kondima na biso, na nzela ya bosembo ya Yesu-Klisto, Nzambe na biso mpe Mobikisi na biso :