Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakolinto 3:17 - Mokanda na Bomoi

17 Sik’oyo, Nkolo azali Molimo ; mpe epai Molimo ya Nkolo azali, epai mpe bonsomi ezali.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakolinto 3:17
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Oh Nzambe, mpo na ngai, kela motema ya peto ; mpe kati na ngai, yeisa molimo sika mpe elenda.


Ezali Molimo nde apesaka bomoi ; mosuni ezali na eloko te. Maloba oyo nalobi na bino ezali Molimo mpe bomoi.


Pamba te kati na Yesu-Klisto, Mobeko ya Molimo oyo apesaka bomoi ekangoli ngai na bowumbu ya mobeko ya lisumu mpe ya kufa.


Yango wana ekomama : « Moto ya liboso, Adamu, akomaki ekelamu na bomoi, azalaki na bomoi ya bomoto ; » kasi Adamu ya suka akomaki Molimo oyo apesaka bomoi.


Mpe biso nyonso oyo bilongi na biso ezipama te, biso oyo tomonisaka nkembo ya Nkolo, tozwaka elilingi na Ye kati na nkembo oyo kongenga na yango ebakisamaka se kobakisama. Nyonso wana ezali mosala ya Nkolo oyo azali Molimo.


Ezali Nzambe nde apesaki biso makoki ya kozala basali ya Boyokani ya sika oyo evandisami na Mibeko te kasi na Molimo ; pamba te Mibeko ebomaka, kasi Molimo apesaka bomoi.


Mpe mpo ete bozali penza bana, Nzambe atindaki Molimo ya Mwana na Ye kati na mitema na biso, Molimo oyo agangaka : « Aba, » elingi koloba : « Tata ! »


Ezali mpo ete tozala bansomi nde Klisto akangolaki biso. Yango wana, botelema ngwi mpe bozonga lisusu na bowumbu te.


Bandeko na ngai, Nzambe abenga bino mpo ete bozala bansomi. Kasi tika ete bonsomi yango ekoma te mpo na bino libaku malamu ya kotambola kolanda baposa ya nzoto. Nzokande, na nzela ya bolingo, bosunganaka bino na bino.


Pamba te Molimo oyo Nzambe apesa biso akomisaka biso te bato ya kobanga-banga, kasi apesaka biso makasi, bolingo mpe mayele.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ