Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakolinto 3:14 - Mokanda na Bomoi

14 Kasi mayele na bango ekomaki bozoba. Kino na mokolo ya lelo, tango batangaka mikanda ya Boyokani ya Kala, vwale yango ezalaka kaka, elongwe nanu te kati na bango, pamba te elongwaka kaka kati na Klisto.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakolinto 3:14
34 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tika ete mesa na bango ekoma motambo liboso na bango, mpe kimia na bango ekoma monyama.


Kaka na ngomba oyo, akobebisa vwale oyo esili kozipa bato nyonso, bulangeti oyo ezipi bikolo nyonso ;


Bayebi eloko moko te, bazali na bososoli te ; miso na bango ekangama, emonaka te ; mitema na bango ezali makasi, esosolaka te.


Bakengeli ya Isalaele bazali bakufi miso, bango nyonso bazangi mayele ; bango nyonso bazali lokola bambwa oyo egangaka te, bakokaka koganga te, mosala na bango kolala mpe kolota bandoto, balingi pongi makasi.


Tozali kosimbasimba mir mpo na kotambola lokola bakufi miso, tozali kobanga kotambola lokola bato bazanga miso ; tozali kobeta mabaku na moyi makasi lokola nde tozali na butu makasi, tozali na nzoto kolongono kasi tokomi lokola bakufi.


Komisa bato oyo mitema makasi, kanga matoyi na bango mpe zipa miso na bango mpo ete bamona te na miso na bango, bayoka te na matoyi na bango, basosola te na mitema na bango, babongwana te mpe babika te ! »


Boyoka makambo oyo, bino bazoba to bato oyo bozanga mayele : bozali na miso mpo na komona kasi bomonaka te, bozali na matoyi mpo na koyoka kasi boyokaka te.


« Mwana na moto, ozali kovanda kati na libota ya batomboki ; bazalaka na miso ya kotala kasi bamonaka te, bazalaka na matoyi ya koyoka kasi bayokaka te, pamba te bazali libota ya batomboki.


Yesu azongiselaki bango : — Ezali mpo ete boyebi ya mabombami ya Bokonzi ya Likolo epesameli nde na bino, kasi na bango te.


Yesu alobaki na ye : — Esengo na yo Simona, mwana mobali ya Yona ! Pamba te ezali moto te nde ayebisi yo makambo oyo, kasi Tata na Ngai, oyo azali kati na Likolo.


Kasi soki miso na yo ekufi, nzoto na yo mobimba mpe ekozala kati na molili. Bongo soki pole oyo ezali kati na yo ekomi molili, molili yango ekozala makasi penza.


« Azipaki miso na bango mpe akomisaki bango mitema makasi, mpo ete bamona te na miso na bango, basosola te na mitema na bango, babongola mitema te, mpe ngai nabikisa bango te. »


Ngai, pole, nayaki kati na mokili mpo ete moto nyonso oyo akondima Ngai azala lisusu te kati na molili.


Yesu alobaki lisusu na bato : — Nazali pole ya mokili ; moto nyonso oyo alandaka Ngai akotikala kotambola kati na molili te, kasi akozwa pole ya bomoi.


Sima na kotanga Mobeko mpe Basakoli, bakambi ya ndako ya mayangani batindelaki bango maloba : — Bandeko, soki bozali na maloba mpo na kolendisa bato, bokoki na bino koloba.


Pamba te wuta kala, kati na bingumba nyonso, ezali na bato oyo bateyaka Mobeko ya Moyize, mpe batangaka yango kati na bandako ya mayangani, mikolo nyonso ya Saba.


Kati na basi yango, ezalaki na mwasi moko, kombo na ye « Lidi. » Azalaki moteki ya bilamba ya motane, moto ya Tiyatire mpe mogumbameli ya Nzambe. Azalaki koyoka, mpe Nkolo afungolaki motema na ye mpo ete akangama na makambo oyo Polo azalaki koloba.


mpo ete ofungola bango miso, olongola bango na molili mpe omema bango na pole ; mpo ete olongola bango na se ya bokonzi ya Satana mpe omema bango epai ya Nzambe, na tina ete bazwa bolimbisi ya masumu mpe libula kati na bato oyo babulisama na nzela ya kondima kati na Ngai. »


Bandeko, nalingi ete boyeba mabombami oyo mpo ete bomimona te ete boleki na bwanya : ndambo ya bana ya Isalaele bakowumela kozala mitema libanga kino Bapagano nyonso bakokota na libota ya Nzambe.


Solo, kino na mokolo ya lelo, tango nyonso bana ya Isalaele batangaka mikanda ya Moyize, vwale moko ezipaka mitema na bango.


Ezali Nzambe nde apesaki biso makoki ya kozala basali ya Boyokani ya sika oyo evandisami na Mibeko te kasi na Molimo ; pamba te Mibeko ebomaka, kasi Molimo apesaka bomoi.


Pamba te Nzambe oyo alobaki : « Tika ete pole engenga kati na molili, » angengaki Ye moko kati na mitema na biso mpo na kopesa biso pole ya boyebi ya nkembo ya Nzambe, oyo engengaka na elongi ya Yesu-Klisto.


Pamba te molili ezipi mayele na bango mpe bazali ya kokabwana na bomoi ya sika oyo Nzambe apesaka, mpo ete bazangi boyebi mpe bazali mitema mabanga.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ