Nalobaki na bino makambo wana nyonso na masese ; kasi tango ezali koya, tango oyo nakoloba na bino lisusu na masese te, kasi tango oyo nakoyebisa bino na polele penza makambo oyo etali Tata.
Polo mpe Barnabasi bawumelaki kuna mikolo ebele, bazalaki koteya na mpiko, pamba te bazalaki na elikya kati na Nkolo ; mpe Nkolo azalaki kokokisa bosolo ya mateya ya ngolu na Ye na kopesaka bango nguya ya kosala bilembo ya kokamwa mpe misala minene.
Barnabasi azwaki ye mpe amemaki ye epai ya bantoma ; ayebisaki bango ndenge nini Saulo, na mobembo na ye, amonaki Nkolo, mpe ete Nkolo alobaki na ye. Ayebisaki bango lisusu ndenge nini, kati na Damasi, ateyaki na mpiko na Kombo na Yesu.
Ngai Polo oyo namonani lokola moto na bolembu na miso na bino, kasi lokola moto ya makambo makasi tango nazalaka mosika, nazali kosenga na bino, na boboto mpe na bolingo ya Klisto :
Nalobaki na tina na bino na bosembo monene, mpe namikumisaka makasi na tina na bino. Kati na pasi na biso nyonso, nalendisamaki makasi, mpe natondi na esengo.
Mpe lisusu, kozala na ngai kati na boloko epesi na bandeko mingi kati na Nkolo molende ya kotia elikya kati na Nkolo mpe ya koteya Liloba na Nzambe, na mpiko mpe na bozangi bobangi.
Eloko nazali kozela makasi mpe kolikya na motema na ngai mobimba ezali ete nayokisama soni te ata na likambo moko, kasi Klisto akumisama kati na nzoto na ngai, sik’oyo mpe tango nyonso, na elikya nyonso, ezala na nzela ya bomoi na ngai to na nzela ya kufa na ngai.
Boyebi lisusu ete, sima na biso konyokwama mpe kofingama kati na Filipi, toteyaki bino, na lisungi ya Nzambe na biso mpe na molende nyonso, Sango Malamu na Ye kati na bitumba makasi.
Pamba te badiakona oyo basalaka mosala na bango malamu bazwaka esika ya lokumu mpe bakomaka na elikya makasi kati na kondima na bango epai na Yesu-Klisto.